Eglises de réveil, balembisi ya ntombwa ya mboka.
Na kozela bosikoli ya mboka pe bozongisi yango na nzela ya ntombwa, esengeli biso ba congolais toyeba ete tozali na occupation mosusu oyo kutu eleki oyo ya mboka na biso na mosika, ezali oyo ekanga mitu na biso na bowumbu ya makanisi pona kopekisa biso toyeba kosalela yango na ndenge elongobani na kati ya bomoyi na biso too pe na tina ya ntombwa ya mboka na biso, oyo ba eglises de reveil na mateya na bango bazali kokoba kokotisa pe kolendisa. Soki totali ba dega nionso oyo ezali kosalema likolo ya bobimi-bimi ya ba binzambi-nzambi, tosengeli koyeba ete bokoti na refondation ya mboka ekoleka na nzela ya bopetoli mitu na biso na tina ya kozongisa makanisi pe mayele ya bososoli na kati na yango, oyo ekopesa biso nguya ya kokanisa pe ya kokela engebene na makoki oyo Nzambe apesa biso pona kososola pe kobima na ba nkokoso nionso tokoki kokutana na yango na ba circonstances nionso ya bomoyi na biso. Kasi bokangoli ya mitu na biso ekozala eloko ya pete te po makanisi ya mbindo esi ekota na mitu ya biso na ndenge moko ya kosakana te, yango wana bopetoli na yango ekozala nkokoso koleka bosikoli ya mboka. Na kati ya mokanda oyo na kotatola makanisi ya mabe nionso oyo bakotisa na mitu na biso, mokanda oyo ezali mopanzi ya molimu ya mabongisi ma bosikoli ya peuple congolais oyo eyei sima ya mopanzi ya politike oyo nakomelaki bino na kati ya mokanda na titre ya “Muana Congo, telema tosikola mboka” esika nalakisaki bino nzela tosengeli kolanda pona kobotola bosomi ya mboka na biso na maboko ya bapaya pe kozongisa yango na maboko ya bayi mboka, oyo ekopesa evandelo elongobani pona ntombwa ya mboka. Soki nainu bozui libaku ya kotanga yango te, bozali na lien na se ya mokanda oyo pona kokota na mokanda wana.
Na sitiwasio oyo mboka na biso ezali lelo, oyo ebandaki kobeba wuta kala mbula na mbula tii na nivo ya kokoma elanga ya bobimi ya ba eglises de reveil nzike na bokambemi ya batu oyo bamibongola ba pasitele na bobendi ya ndobo ya bozui, na komona na kati ya mosala wana libaku ya pete pona kozua misolo na kati ya mboka oyo ezanga misala. Yango wana, mosala ya ki pasitele ekoma mosala oyo batu mingi bakoma kosalela, ba somele bakoma komona na mosala wana nzela mokuse ya kolongwa na kisomele pe ya kozuela mbongo too pe ya kobakisa mua moke likolo ya ba salere na bango ya mike. Soki tolongoli litomba oyo mosala wana epesaka, ezali pe nzela ya koyebana mua moke ontei ya bandimi oyo balandaka ye too pe na libanda ya lingomba soki yango eyei monene. Batu nionso balingi kaka kokota na mosala muango, ba professeurs, ba magiciens, ba voyants, ba avocats, ba minganga, bayi politike na basali ya ndenge na ndenge, ekipaka lisusu motindo ya mosali te. Soki batu misusu bayaka na mosala muango na kondima na bango, mingi bazali batu oyo bamikotisa na kati ya kope wana na sima ya mabaku songolo to mpakala. Soki tolongoli nzela ya politiki, kosalela binzambi-nzambi ekoma n’ango nzela kaka moko oyo ekoki kopesa mutu makoki ya kobikela malamu na kati ya mboka wana oyo esi ebeba n’ango. Na maye wana, tokobakisa eloko mosusu, oyo esalaka ete pasitele nionso alingi kaka asala ligablo na ye, yango wana mangomba ekoma kobima lokola mayebo likolo ya momekano oyo ezali na kati na bango, n’esika ya kosangana pona kotonga lingomba moko ekosangisa bandimi nionso bandimelaka Nzambe moko na ndenge ya ba katolike epayi wapi mondimi nionso akoki kokende kosambela na kati ya etonga nionso ya mokili, yango ezali kolakisa ete basalelaka etinda ya mutu oyo balobaka basalelaka te, oyo asengaka biso tolingana pe toyokana biso na biso. Nionso wana kaka pona likambo ya mbongo, po moko na moko na bango alingi azala na bandimi na ye oyo batondisela ye ba posi. Ba pasitele oyo, n’esika ya komikotisa na mambi ma bokoteli baye bazanga makoki ya kobunda liboso ya pouvoir génocidaire oyo ezali konionga pe koboma bango, ba preferaka kobembana na pouvoir eye pona elengi ya kotondisa mabumu na bango.
- Oyo ngai nazali, kobotama pe kokola lokola mokristo.
Ngai oyo nazali koloba na bino, nawuta na libota moko ya bakristo oyo epesa na mboka na biso moko ya ba sango na ye ya yambo. Nayekolaki kibonzambe na ngai na kati ya biteyelo ya ba katolike esika nalekisaki mibu 12 mokoka oyo na kati na yango navandaki mibu 6 na internat, liboso epayi ya ba sango pona kosukisa epayi ya ba freres ya biteyelo ya bakristo. Na kati ya muvema Xavéri, nayekolaki oyo babengi don de soi pe amour du prochain engebene na mateya ma Yezu, oyo namekaka kosalela tango inso, mokolo na mokolo, na kati ya bomoyi na ngai. Nalongwaka na mboka Zaïre na eleko oyo ba fenomene ya ba eglises de reveil ezalaki nainu te, na eleko oyo kokende mikili ya Poto ezalaki likambu ya ba pasitele te, na eleko oyo ba etudiants bazalaki kaka na likanisi moko, oyo ya kozua bourse, yango ezalaki kotinda biso tokengela ba okazio nionso ekokaki kopesamela biso na nzela ya ba concours oyo ba organismes internationaux bazalaki kolengela pona boyekoli na Poto. Ngai nayaki na Poto na sima ya kolonga na concours ya lolenge wana, ezalaki n’ango te ke pasitele moko songolo asambelela ngai, oyo nakofutaka tango inso na tina ya matondi ya boyei na ngai na Poto, ezalaki kaka kosalela mayele oyo Nzambe apesa ngai na ndenge elongobani. Yango wana nazalaka mosika ya fenomene oyo ya ba eglises de reveil oyo ekamuisaka ngayi ndenge nayokaka mateya bango bakotisaka na mitu ya batu, oyo nazali kotatola ete ezali kopesa mokongo na culture na biso pe na ntombwa ya mboka.
- Eteni ya yambo : Likanisi elobi “Nzambe akosala”.
Likanisi ya yambo oyo ekotisa ba congolais mingi na bolembu ya bozeli lisungi ya Nzambe pona kopesa eyano na ba nkokoso na bango ezali likanisi oyo elobi ete “Nzambe akosala”. Ya solo, toyebi balobaka “mutu akokana Nzambe akosukisa”, kasi yango elingi koloba ete po Nzambe asukisela yo likambo, esengeli yo mutu okana, elingi koloba ete pona kozua lisungi ya Nzambe, esengeli yo mutu ozala na kati ya mosala oyo ozali kosengela lisungi, po kosambela ya pamba too kobelela kaka kombo ya Yesu epesaka eloko te.
Nalingi nakundola awa ete etinda na biso na mokili ya se ezali ya kotombola yango, elingi kokoba ete nionso tosalaka na tina wana ezali pona kokumisa Nzambe, na yango mosala ezali losambo na biso ya yambo epayi na Ye. Kolekisa tango na biso nakosengaka na Nzambe apesa biso eloko songolo to mpakala ezali mbeba monene, po Nzambe apesa mutu na mutu mayele na ngenge na ye oyo asengeli kosalela pona lobiko na ye, pona kobongola mabele pe kotombola yango na tina ya kokoba kosala mosala oyo Ye moko abandaki na mokili oyo ya se. Tango yango oyo toyeba kosalela yango po batu nionso babika na bolamu awa na se, totika kotatola bisika nionso ete Nzambe akosala pona biso po Nzambe akotikalaka kosalela biso ata mokolo moko te, kasi Ye akosunga oyo bakosalela bongo na bango pona koluka nzela ya kobimela na nkokoso oyo bakokutana na yango. Na tango ba congolais mingi bakangama kaka na buku moko ya kotanga, oyo tobengi Biblia, ba mindele oyo bayelaki biso yango bakipaka yango kutu te po babuku bango batangaka ezali oyo ekomama pona kokolisa mayele ya mutu na maye matali misala ya kobongola na malamu ba conditions de vie ya batu awa na se. Nakanisi Nzambe akoluka kosunga mutu oyo azosalela mayele pe ngenge na ye na tina ya bolamu ya batu nionso ya mokili koleka oyo alekisaka tango na ye kaka na kotatolaka ete Ye azali Nzambe, ya kosandjolaka monene na Ye to pe bokasi bwa Ye, po nionso wana ayebi yango pe azali dictateur te oyo asengeli na ba djalelo tongo midi pokua, ebongi malamu koyemba banzembo oyo ekoedike batu pona koyeisa bango malamu na koteyaka bango ndenge nini basengeli kotambola na bomoyi na bango ya bana ya Nzambe. Tango oyo tokolekisa na losambo ya mokolo na mokolo esengeli ezala mokuse, kaka oyo tosengeli na yango pona kopesa matondi epayi ya Nzambe too pe ya kosenga Ye lisungi na misala too ba nzela na biso, yango ekotikela biso tango mingi ya kolekisa na maye matali bokokisi ya etinda na biso awa na mokili oyo ya se. Po tango oyo batu balekisaka na ba retraites ezali tango oyo ezangaka pona kosalela ntombua ya mboka, oyo ezangaka na nkita ya ekolo soki tolingi ezala na alima, po tango nionso oyo batu basalaka te ezali mbongo oyo ezangaka na kesi ya Leta. Pona kopesa evandelo ya sika na ntombua ya mboka, esengeli totika bizaleli wana ya bolembu pona kozongela bizaleli ya malonga.
Napesa ndakisa ya bizaleli ya bolembu, tozua nainu cas ya mutu oyo akokende kokota retraite, sima na yango ndeko na ye ya diaspora atindeli ye 100$, mutu wana akosepela pe akoganga “Nzambe asali” alorke ezali kaka mbuma ya mosala ya mutu mosusu. Oyo ezali bozoba, ezali ete na kati ya 100$ wana oyo ndeko na ye akangelaki ye na pasi pona kosalisa famiye na ye, mutu wana akolongola 10$ pona kopesa pasitele na ye na tina ya dime lokola asali ete botindi wana esalema, oyo atako pasitele asalaki eloko te elingaki n’ango kosalema, soki pe na ngambo na ye mutu ya diaspora oyo atindaki 100$ ye pe apesaki dime, tala ndenge bavimbisaka systeme wana ya mabe oyo ezali kobenda batu bayike. Po dime ezali eloko oyo ezali na baze ya ba bobengami bwa ba pasitele nzike pe ya bofuluki ya binzami-nzambi na kati ya mboka. Dime esengeli kozala mpaku te oyo batu basengeli kofuta na pasitele, wana ezali kimoyibi, Nzambe akopambola yo mingi koleka soki osalelaka ndambu ya lifuta na yo pona kosunga babola, yango ezali dime oyo eleki nionso, oyo ezali na nzela ya amour du prochain ndenge ba mizilima basalaka, yango pe ekosala ete mutu nionso azala na komikotisa mobimba na ye na ntombwa ya mboka.
- Eteni ya mibale : Makanisi elobi “Nzambe azali na controle ya bomoyi na biso”. “Kobika na kobanza Nzambe” too pe “Bokonzi nionso ewutaka na Nzambe”.
Kokanisa ete Nzambe azali na motambwisi ya bomoyi na yo ezali libungi monene oyo ekotisa ba congolais nzike na kati ya bolembu pe irresponsabilité. Soki Nzambe azalaki na controle ya bomoyi ya batu, akokaki kotika biso to buka mibeko mia Ye te, alingaki te kondingisa ba assassins baboma, ba violeurs ba viole to pe ba genocidaires bakoba kosilisa peuple na ye ndenge basalaka. Na ndenge ya bosolo, mutu awa na mokili ya se azali na bosomi na ye ya kosala makambu nionso ye alingi. Deja tango nazalaki muana kelasi, ezalaki likambo oyo tozalaki kopotana n’ango na frere Marc, oyo azalaki moteyi na biso ya bonzambe, na eleko azalaki kotinda biso tososola makomi ma Biblia. Na koyeba ete yango elobaka ete Nzambe ayebi nionso, oyo eleka, oyo ekoya pe ya sik’oyo, ngai nazalaki koyanola ete soki ezalaka bongo, akokaki ko reprocher mutu eloko te po na kokela ye ayebaki deja ndenge nini ye akotambola pe misala nini ye akosala, ezala ya malamu too ya mabe. Koloba ete Nzambe azali na controle ya bomoyi ya batu ezali n’ango eloko pona komipesa makasi pe ya kobundisa ba nkokoso ya bomoyi na bopikiliki pe bosepeli ya makasi.
Likanisi mosusu oyo eteyamaka mingi na kati ya ba eglises de reveil ezali oyo elobi ete mutu asengeli kobika na kobanga Nzambe. Pona ngai mutu nateyama na liloba ete Nzambe azali bolingo, namonaka ete likanisi wana ekokani na posa ya Nzambe te, po babangaka mutu oyo alingaka yo te pe alingaka kosala yo mabe, esengeli kutu kobika na bolingo ya moninga oyo azali ekelamu ya Nzambe pe asalema na elilingi na Ye ndenge Biblia eloba, po kolinga moninga ezali pe kolinga Nzambe ndenge Yesu ateyaka batu. Yango wana ekamuisaka ngai ya komona ete na mboka oyo batu bakoma kotatola kobika na kobanga Nzambe, na bosolo mefiance na kati ya batu ekoma makasi, batu bakoma na bango kobika na kati ya likunia ya bango na bango, mutu na mutu akoma kobika na likanisi ya kokweyisa moninga. Tala contraste ezali entre ferveur ya batu na kokota na binzambi-nzambi na bizaleli na bango ya mikolo na mikolo, tala contraste ezali entre ndenge bazali capables ya ko reciter ba versets bibliques na ndenge basaleka yango na kati ya bomoyi na bango ya mikolo na mikolo ! Tina ezali wapi ya kogangaka kombo ya Yesu tango inso soki ozali capable te ya kolinga moninga na yo, nazali sur ete mingi na kati na bango oyo bakangama na kombo ya Yesu na monoko, soki bazalaki na epoke na ye, bakokaki kozala na kati ya batu oyo bazalaki koganga “A mort l’imposteur!” na tango bazalaki ko sambisa oyo azalaki komibenga muana ya Nzambe, po ezali pete mingi kolinga mutu oyo asi akufa na ye pe oyo oyeba na yo te n’esika ya oyo azali na bomoyi pe omonaka ye mikolo nionso. Na ndenge ba eglises de reveil bakomisa état d’âme passeport ya ba relations humaines, état d’âme ebebisa tissu social pe ekotisa mbutu-mbutu na kati ya mabala too pe na kati ya ba famiye ya batu, ndakisa oyo tozali komona lelo etali mama ya Marie Misamu, yango ezali kotalisa bosolo ya maye nazali koloba. Likolo ya état d’âme na bango, bana bayike babwakama libanda ya societe likolo ya kokomisa bango bandoki, yango elongola maboko mayike oyo makokaki kosalela mboka pe mazali kozangisa mboka eteni ya nkita na ye oyo bana wana bakokaki kobimisa, yango ezali crime contre l’humanité lokola pe ezali catastrophe économique pona mboka na biso, esengisi na biso ekozala tobima noki noki na sitiwasio wana na kolongola ba shege nionso na balabala pe kozongisa bango na kati ya sosiete.
Soki totikali kaka na likanisi wana ekozala pasi pona mboka na biso ekende liboso, yango wana esengeli na biso tomikangola na bobangi Nzambe pona kokota na bolingo ya Nzambe oyo ekoleka na nzela ya baninga na biso batu po yango nde ekomema biso na kolinga bayi mboka pe na nzela na bango ya kolinga mboka na biso too pe ya komipesa na ntombwa na yango. Kasi kolingo moninga na yo mutu elingi koloba te kozala mowumbu ya mutu wana pona kokomisa ye goyigoyi, wana ekozala lisalisi ya mabe ya kobonzela ye, ezali te ke okoma komemela mutu ya nzala mbisi, kasi olakisa ye ndenge balobaka yango pona akoma responsable pe akoma ye pe kosunga batu misusu. Kosunga mutu po azua ezali na kati ya amour du prochain, elingi koloba na kati ya bolingo ya Nzambe, yango esengi biso pe toyeba kosepela na bozui ya moninga, eh bongo soki tozali na makoki, toyeba kolanda ndakisa na ye po biso pe tozua lokola ye to pe tosala koleka ye na kati ya momekano ya bosembo oyo ekosala ete biso nionso tokoma komata pe mboka etombwama.
Kaka lokola likanisi wana ya kobanga Nzambe, ba eglises de reveil bazali pe ba responsable ya liboso na bopanzi ya likanisi oyo balobelaka batu ete bokonzi nionso ewutaka na Nzambe. Na bobembani na bango na batu ya pouvoir oyo basalelaka na ndenge basalaka nionso pona kosepelisa bango na tina ya kotondisa ba posi na bango, mosala na bango ezali ya kosekama likolo ya Biblia pe ya kombo ya Yesu pona kolalisa population pe kondimisa bango makambo nionso oyo esengeli pona kowumisa pouvoir en place, oyo ba occupants baprofitaka n’ango pona kokomisa peuple congolais bawumbu na bango tina nivo ya kondimisa bango ete kozala na mokonzi ya imposteur genocidaire ezali mokano ya Nzambe. Lelo ekomi tango ya kosembola likanisi oyo na kozongisa yango n’esika n’ango, po soki tolongoli bokonzi ya baboti likolo ya bana na bango, etikali kaka bokonzi oyo ya maponami na bosolo ewutata na posa ya peuple too pe oyo ba chefs coutumiers bakitanaka n’ango soki elekeli na nzela ya milimu ya bakoko.
- Eteni ya misato : Likanisi elobi “Nzambe apesaka pe azuaka”.
Eloko nini ezali kotalisa mokano ya Nzambe na kati ya liwa ya mutu ya kwiti oyo abela cirrhose pe ayei kokufa na cancer du foie? Eloko nini ezali kotalisa mokano ya Nzambe na kati ya liwa ya momeli tumbako oyo akufi na cancer ya ba poumons ? Soki mituna oyo mibale ekoki kotunama n’esika nionso ya mokili oyo ya se, eloko nini ekotalisa mokano ya Nzambe na kati ya liwa ya mutu oyo akufi na asthme na kati ya mboka oyo ezanga bosungi ya bokolongonu ya malonga ? Eske Nzambe alingaka mingi batu bavandaka na ba pays développés koleka baye bavandaka na ba pays sous-développés ? Te ! Nzambe azangi bosembo te po azua mokano ya kokufisa bayi Afrika na ba aje mike bongo baye ya Poto na ba aje ya milayi, soki esperance ya vi eleki mokuse epayi na biso koleka oyo ya batu ya Poto, ezali te po Nzambe mutu alingaki ezala bongo kasi ezali kaka consequence ya ndenge tosalelaka mayele na biso pona ko kosunga bokolongonu ya nzoto oyo bapesa biso pe oyo tozali responsable na yango na makambo nionso. Esengeli tozua ba responsabilités na biso pe totia molende na kotombola biteyelo na biso po epesa biso makoki ya kososola malamu ndenge mokili na biso ezali kotamobola pe tokoka kosalela maye makotombola mabongisi ma lobiko ya batu.
Nzambe azali responsable ya bokolongonu ya batu te lokola pe azali responsable ya liwa na bango te, Nzambe alandelaka kaka molimu oyo evandi na kati ya nzoto ya mutu. Ezali nde epayi ya molimu wana Nzambe apesaka nzoto na eleko ya mbotama nionso, ezala ya batu, ya bibwele too pe ya ba nzete. Na maye matali mbotama ya batu, molimu ekokota na nzoto oyo ye akokoma responsable na yango na manso pona kolengela yango na bolayi bwa bomoyi na ye. Tokopesa ndakisa ya muana oyo azui motuka na maboko ya tata na ye, azali responsable na yango pe asengeli kolengela yango, kokumba yango engebene na mibeko ya nzela pona ewumela mingi. Na ndakisa eye, tokoloba te soki mokolo moko muan’ango azui likama sima ya komela masanga ete ezali posa ya papa na ye oyo apesaki ye motuka wana. Elakisi polele ete engebene na eta ya motuka tango azuaki yango, engebene na ekumbeli ya muana, engebene na eta ya banzela esika ye atambwisaka motuka yango pe engebene na ndenge ye alengelaka yango, motuka’ango ekowumela too te. Yango wana, na kati ya mituka mibale oyo ekokani na nionso, oyo ekumbamaka ndenge moko na batu mibale oyo bakokani na bizaleli, soki bakotambola na ba nzela ekesana, moko na nzela ya makadame mosusu na nzela ya mabele oyo etonda mabulu, ezali pasi te ya koyeba ete oyo ya mibale ekokufa noki koleka oyo ya liboso, yango ekolakisa pona nini bolayi bwa bomoyi bwa mutu abikaka na pays développé ekeki oyo ya mutu abikaka na pays sous-développé. Na ndenge ezalaka, nzoto na nzoto oyo tozuaka na mbotama elengenama na bolayi bwa bomoyi bwa yango engebene na constitution na yango soki ezali kobika na kati ya conditions ya malonga oyo esengeli na lobiko ya mutu, kasi engebene na bizaleli ya kobikela ya mutu, bolayi bwa bomoyi bwa ye bokoki koya molayi to mokuse koleka, soki mutu azali kobika na kati ya pays développé too te, bambula elakamaki na nzoto wana ekozala kokende na kobakisama too na kolongolama na bolayi bua bomoyi bolengenamaki po na yango. Yango elingi koloba ete liwa na maye nioso ekomaka na bomoyi ya mutu ezali mabongisi ya Nzambe te kasi ya mutu too molimu oyo azali na kati ya nzoto wana na bopotani ya biye nionso bibikaka pe bizali na mokili oyo ya se. Oyo tokoki kotia na mabongisi ya Nzambe ezali kaka liwa oyo eyaka na nzela ya makama oyo tolobelaka soki mutu azali n’esika ya mabe na eleko ya mabe too pe oyo tokoki kotia na motu ya batu te.
- Eteni ya minei : Likanisi elobi “Totika batu bakufa kimia po kosolola na bakufi ezali satanique”.
Na epoke na biso, yambo te nalongwa na Zaïre, milulu nionso ezala ya politike too ya bokoko ezalaki kobanda na kopesa lokumu epayi ya baye bakufa, oyo lelo ekoma satanique ndenge nayokaka. Ba katolike ba kembelaka mikolo nionso bakufi na bango na nzela ya basantu, pe balengena mokolo ya le 2 Novembre ya mobu nionso pona kokumisa bakufi nionso, namoni na kati wana eloko ezali satanique te. Nini ezali satanique na kobelela koko na yo oyo alingaki yo mingi tango azalaki na bomoyi po asunga yo soki ozali liboso ya nkokoso oyo elekeli yo, po bondimela ngai too te, bozali na chance mingi koleka ya kozua lisungi ya ndeko na yo akufa ke oyo ya Yesu oyo batu bobelelaka, oyo toyebi ete mutu ya kombo wana azalaka te epayi ya ba Yuda na Israël, yango wana soki obeleli kombo ya Jesus ozali ko risquer ya kotumbola mokufi moko ya latino oyo ayebi kutu yo te pe ayebi monoko na yo te. Nakanisi ete batu basengeli kotika kondima polopagandi oyo batu ya binzambi-nzambi batiaka na ba nzembo to pe na ba film na bango na maye matali makamuisi oyo na bosolo ekomaka te, po bosolo biso nionso tozali komona yango na batu ya Nzambe oyo Yesu akokaki kobikisa te ndenge elekaka na ba film. Soki kombo ya Yesu ekoki kosala eloko na kati ya mutu ezali kaka oyo tobengi effet ya pisikoloji engebene na maye nionso ayoka likolo ya kombo wana, po soki okeyi kotatola kombo ango epayi ya mutu oyo ayoka nainu yango te, ekosala ye eloko moko te, kasi kobelela kombo ya koko na ye oyo alingaki mingi pe akufa ekoki kobikisa ye ndenge moko na mokristo oyo bozali kogangela kombo ya Yesu.
Koloba ete bakufi bakufa pe basengeli kopema ezali lokuta monene, po eloko moko kaka epemaka ya moweyi ezali nzoto na ye, po molimu na ye ekobaka kosala mosala na ye na ndenge mosusu. Tango balekaka na monde ya baweyi, bazalaka na nzela minei oyo bakoki kokota :
- Nzela ya liboso etali ba oyo tobengi ba innocents oyo bakufi na bomuana too pe bazalaki bilema oyo basengeli kozonga na mokili ya se pona kokota na nzoto ya sika. Yango pe etali bilenge oyo bakufi avant pe bazuaki tango ya kokokisa misio na bango te. Yango wana soki batu mibale bakutani pe balingani na impression ya koyebana banda kala, elingi koloba ete batu wana bayebanaka deja too pe bazalaki bandeko na vi mosusu yambo te bazonga na mokili oyo ya se, bobendi na bango ezali lokola oyo ekoki kosala na kati ya bana mibale oyo bayebi te ke bazali bana ya tata moko too pe ya mama moko.
- Nzela ya mibale etali ba mechants oyo bamesanaki kosala mabe na mokili, oyo sima ya liwa na bango basengeli kofuta ba mbeba na bango. Engebene na nivo ya mbeba na bango, bakotinda bango too na oyo tobengaka lifelo, too bakozonga na mokili ya se na loposo ya ebwele too pe ya nzete pona kobandela nzela ya bomoyi na bango, oyo ezali kolendisa maloba ya ba bouddhistes.
- Nzela ya misatu etali bamikolo, elingi koloba majorite ya baweyi, oyo batiki bakitani na mokili ya se pe bakokoma ba anzelu babateli ya baye nionso ya bango batiki, bazali wana pona kosunga bango na tango inso bango bakobelela bango pona babimisa bango na ba nkokoso bakoki kokutana na yango too pona kopona nzela bango basengeli kolanda. Oyo nionso bamibomaki, engebene na age na bango na ba circonstances ya suicide na bango, too bazongisaka bango na mokili, too bazalaka na bokangemi na nivo oyo ekopekisa bango bazala na contact na ba vivants, kasi yango etali batu oyo bakufaka na euthanasie te oyo bazuaka lokola batu nionso bakufaka na liwa ya natirele. Mokufi atikalaka na mosala ya ki anzelu mobateli kino tango baye nionso atika na mokili bakosila kokufa too pe soki batu babosana ye pe mutu moko te asengaka lisungi, soki ezali bongo engebene na bila ya bomoyi na ye na mokili ya se, kobakisa na bila na ye ya ki anzelu mobateli ya ba vivants, soki akokisi motango ya bilembo esengeli pona koleka na nivo ya likolo, akoleka na nivo ya likolo, soki te akozonga na mokili kobandela vi mosusu pona ko ameliorer curriculum vitae na ye oyo ekobakisa bilembo na bila ya nzela ya lobiko ya molimu na ye.
- Nzela ya minei pe ya suka etali batu ya malamu oyo bamipesaki mobimba na kosala pona bolamu ya batu, oyo babikaki engebene na mitindo ya Nzambe, oyo batika bakitani te na mokili ya se, bango nde bakotaka na mbala moko na nivo ya likolo esika ya basantu oyo bazali wana pona kosunga mutu nionso oyo asengeli na bango pona ba nkokoso ya makasi too pona kosenga lisungi ya Nzambe.
Yango wana, ezali libunga monene ya kosenga na batu babelela bakufi na bango te po bakufi bazali wana pona baye ya bango batika na mokili basengaka bango lisungi na misala mia bango too pe boponi ba nzela basengeli kolanda, bazali wana pe pona kozala balobeli na bango liboso ya Nzambe na bango. Engebene na relasio bokozala na yango too te na bango, engebene na limemia oyo bokopesa bango too te, engebene na botosi bokozala na yango too te na maye matali mibeko mia kobikela malamu na kati ya sosiete, bakufi bazali na mpifo ya kosunga bino pona kokokisa lotomo na bino, ya kotiela bino ba kale pona kopekisa bokokisi na yango too pe ya kokata lisungi na bango epayi na bino. Bakufi bazali lokola batu oyo batika mboka na bango pona kokende koluka vi na ba mikili ya Poto, na baye ba famiye batikala na mboka basengaka lisungi pona ko resoudre ba nkokoso oyo bakutanaka na yango. Ndenge batu ya diaspora bamonaka sitiwasio ya mboka koleka batu oyo kobikaka na kati, ndenge pe bakufi bamonaka sitiwasio ya mokili ya se koleka biso batu tozali na kobika na se. Tozala na boyebi na yango too te, biso nionso tozali na kati ya singa moko ya makila oyo esangisaka biso na bakufi na biso oyo batindeka biso ba mesaje na ba nzela ndenge na ndenge. Atako bakufi basalaka makambu na bango mingi na bokutu ya batu oyo bazali kosalela, pona kokoka ko beneficier na lisungi na bango pona kobima na ba nkokoso nionso okoki kokutana na yango too pona kopona nzela osengeli kolanda na ba demarches na yo, esengeli bozala na ekenge na bango contrairement na ba meko oyo ba eglises de reveil bapesaka. Bango bakoki kokotela yo na kati ya bandoto pona kopesa yo ba mesaje, bakoki kotindela yo too kolakisa yo bilembo oyo ekosala ete ndakisa okoka kozanga kozua mpepo oyo ezokende kozua likama too pe kozanga komela kopo oyo batie puazo, bakoki pe kolekela na na nzela ya molimu na yo pona kokebisa yo soki likama ezali pembeni na yo too mutu oyo azali pembeni too liboso na yo alingi asala yo mabe, yango ekoki kozala oyo babengaka “sixième sens”. Soki tozali kobeta bango kara te pe tozali tango inso na ekenge na bango, ba anzelu wana bakosunga biso pona kozua mikano ya malamu, bakosunga biso na misala na biso lokola ngai moko namesana kosalela yango, yango ekomaka soki nazo luka solisio na nkokoso moko songolo, na tango wana eloko moko ekosalema oyo ekopesa ngai eyano too ekotinda ngai na nzela ya solisio nazo luka. Soki ozali na ekenge na bilembo nionso oyo batindelaka yo pe bilekaka na nzela na yo, okokolisa nguya na yo ya koyoka ba mesaje batindelaka yo, ya kososola yango pe ya kosalela yango na ndenge elongobani. Batu misusu bazali na ngenge ya koyoka ba mesaje ewutaka na l’Au-dela, lokola ba voyants too ba mediums oyo bazali wana pona kozongisela yo maye anzelu mobateli na yo azali kotindela yo po ye nde ayebi yo koleka mutu nionso.
Soki tolongwe na mosala yaki anzelu mobateli oyo ezali mosala na bango na ba circonstances nionso, bakufi bazali pe na nguya ya kopesa biyano na masenginia ya baye bazali na bomoyi. Kasi, ezala pona kosala bolamu too bobe, bakufi bazali na makoki te ya kosala yango bango moko, pona yango basengeli kolekela na nzela ya ba fenomene oyo ekoli kosalela eloko nionso ezali awa na mokili ya se. Kominikasio ya bakufi na ba oyo bazali na bomoyi ekoki kozala ya mutu moko too ya lisanga ya batu, oyo ya mutu moko elekelaka na nzela ya bilembo ya mike mike esika oyo ya lisanga ya batu elekelaka na nzela ya ba fenomene ya minene, ndakisa pona kopesa mesaje epayi ya famiye mobimba too kominote mobimba na tina ya kosunga ye, ya kopesa ye etumbu too ya kopesa ye mesaje ya motuya. Bosomi oyo mutu azalaka na yango na mokili ya se ezali kaka yango bakufi bazalaka na yango epayi bazali, yango wana, ndenge elekaka awa na se, milimu ya l’Au-delà bakoki pe kosala bolamu too bobe, atako tokoki koloba ete mingi mingi basalaka pona bolamu ya baye batika na mokili ya se, tokokuta pe na kati na bango milimu oyo bazali wana kaka pona kosala batu mabe, pona yango balekelaka na nzela ya batu misusu oyo bakokotela na mitu na bango. Soki molimu ya mokufi ekoteli mutu, ezali too po mutu‘ango asengi yango na molimu wana, too po mutu’ango azali mobobe too azali na boyinga na kotika nzela ya kofungwama pona milimu mabe. Ezala bokoti na bosenga ya mutu too bokoti na loma, molimu ekoki kosala pona bolamu too pona bobe na nzela ya mutu ya bomoyi oyo akoteli. Soki molimu ya mokufi ekoteli mutu, bokoti wana ezali too pona tango moke, too pona seko. Oyo ya tango moke ezalalaka tango inso na bosenga ya mutu oyo alingi kokominike na mokufi, na tango wana molimu ya mokufi ekosalela molimu ya medium pona kotatola mesaje na ye. Oyo ya seko, ezala na bosenga ya mutu too na loma pe na bokutu ya mutu, ezalaka tango inso pona kosala bobe, na tina wana molimo ya mokufi ekoki kotambola na ndenge mibale : too etikali ya kolala pona kolamuka kaka pona kosala bobe soki moyambi na yango azali na makanisi ya mabe epayi ya mutu mosusu, too ezali ya kolamuka pe na ekenge ya libaku nionso ekoki kopesamela ye ya kosala bobe oyo eleyisaka ye.
Awa nalobi boye, boya kotuna ngai te ndenge nini nayebeli maye nionso natalisi bino awa, yango eyelaki ngai kaka boye pe esengisi na ngai ezalaki ya kopesela bino yango ndenge eyelaki ngai, bondima too bondima ngayi te, ezali choix na bino! Oyo nayebi sik’oyo, ezali ete soki biso ba chercheurs tozui mokano ya kosala elongo na ba ngunza na biso, tokoki kozua makoki ya komianola mabombami ya kominikasio na bakufi, ya koyeba kosalela yango pona kozala batu ya liboso oyo bakokela apaleyi oyo ekopesa biso makoki ya kokominike na bakufi na biso too pe ya kotambola na bomoyi na biso na ndenge ya ba coureur cycliste oyo asalelaka oreillette pona kozua mitindo ya mokambi na ye pona koyeba ndenge ya kotambola na kati ya course, yango ekozala contribution ya kafukafu pona ntombwa ya mokili oyo ekokomisa boswani na biso ya lelo masolo ya kala. Bongo soki natali ndenge motu na ngai emesana kosala, kozua likanisi ya eloko moko songolo elingi koloba ete yango ekoki kosalema, pe namoni ete kala mingi te apaleyi yango ekokelama, en tout cas ba progres scientifiques pe technologiques ezali kolendisa elikia na ngai pona yango, yango wana nazali deja na esengo ya komitia na kati ya projet wana oyo ekomi projet na ngayi ya mikolo ekoya soki nasili kosangisa misolo miye misengeli pona yango.
- Bosukisi.
Mutu aya koloba na ngai te oh kotalela bokoko na biso ezali koboya progres too pe batu muindu bazangi eloko songolo to mpakala, ngai nazuaki libaku chance ya kobika na ba miliye nionso mibale pe nakoki kopesa temuaniaje. Ezali pona kosala lofundu te, kasi nakoki koloba ete na ba kelasi na ngai nionso na Zaïre nazalaki na balandi ya mayele penza oyo bazalaki kotindika ngai po nakoma na excellence, oyo bakokaki pe kozala aleze na kati ya ba bilo nionso ya bokeli na Poto, pe na vecu professionnel na ngai oyo esalemi nionso na Poto, oyo mingi mingi na mosala na nazalaki kaka ngai moko ingenieur ya mutu muindu, ata mokolo moko te natikalaki koyoka complexe d’infériorité liboso ya mindele. Au contraire, nayebaki komi imposer esika nionso nalekaki, ndenge ezalaki kosalema tango na nazalaki na kelasi, esika namesanaki kosunga baninga na ngai oyo bazalaki na nkokoso pe bazalaki koya kosenga ngai lisungi, ba collegues na ngai ya mosala pe bazalaki kosala ndenge moko, yango wana esika na esika bapesaki ba kombo lokola “le crack”, “le professeur” too pe “le spécialiste” pona kolakisa ndenge bazalaki komona ngai. Nazuaki libaku ya kokamba ba projets ya ndenge na ndenge oyo batu misusu bakoki komona lokola ezali ya kafukafu kasi oyo pona biso batu tozali na kati ezali n’ango lokola masano ya bana mike. Ezali kaka oyo babengaka “plafond de verre” eye etelemisaki évolution ya carriere na ngayi, kasi ezalaki n’ango mabe oyo ememaka na nzela ya malamu, po nasengelaki koluka nzela mosusu oyo nakokaki kolanda, yango ememaki na nzela ya recherche pona kokela biloko songolo, oyo nasaleli na kati ya mibu miyike mileki po nakoma n’esika nazali lelo na bokambi ya ba polodwi nzike oyo nakelaki, oyo nabimisi nainu te pona bozangi misolo kasi oyo nayebi ekoyebana mokili mobimba soki nazui libaku ya kobimisa yango, atako ba polodwi misusu oyo ekoki kokokana na oyo ya ngai ebimaki na ba forme misusu na kati ya bambula oyo esili koleka, oyo ezali kolakisa kaka ete nazalaki na nzela ya malamu. Nionso oyo nalobi elingi koloba ete tozali na tina te ya koyokaka complexe d’infériorité, ngayi kutu namonaka ete esengeli ezala le contraire soki totali ba ngenge nionso biso batu moyindo tobotama na yango oyo epesaka biso avantage liboso ya ba misusu, ezali kaka na maye matali kobina too pe sport te, nakanisi tozali na eloko moko oyo epesaka biso nguya ya kokela na kozanga kosalela theorie too pe boyekoli bwa makasi, yango epesaka biso avantage na ba domaine ebele, oyo soki tobakisi theorie ekomisaka biso makasi koleka. Totala kaka ndakisa ya ba musiciens na biso too pe oyo nazali komona na maye matali ba films na biso, lokola batu basalaka yango bazangi materiel, babimisa esaleli moko oyo eyebani te na Poto, oyo soki bapesi bango ba materiel elongobani bakokoma lisusu malamu koleka. Kokela ezali na kati ya ekelamu nionso oyo ebikaka na mokili ya se oyo esangisi pe mutu, ezali nguya na ye ya kokoka koluka solisio na nkokoso nionso akoki kokutana na yango too pe ya kopesa eyano na bosenga nionso azali na yango. Mingi soki ba kondisio ya lobiko ezali pasi, mingi posa ya kokela emataka, elingi koloba ete mutu oyo azali na bowumbu azalaka na bolembu ya koluka nzela na ye pe ya kokela na mayele na ye moko, ndenge biso tozalaki na eleko ya colonisation pe tozokoba kozala lelo oyo na kati ya neocolonialisme na bokambi ya ba “décideurs” internationaux, po tomesana kozela basalela biso biloko oyo ekowuta na mikili misusu, epayi ya ba “maîtres” na biso. Eloko tosengeli kosala ezali ya ko reconquerir liboso bosomi na biso ndenge nakomelaki bino na mokanda na ngai na titre ya “Muana Congo, telema tosikola mboka” oyo bokoki kotanga na kati ya site oyo na nzela ya lien oyo ezali na se ya mokanda eye, esengeli tozongela bobiso pona toyeba kokolisa mayele pe kolambela boyebi ya mokili na ndenge na biso, yango ekopesa biso makoki ya kokela biloko oyo tosengeli na yango, oyo ekobalana engebene na ndenge na biso ya kobikela, oyo sima na yango tokoki ko faire profiter mokili mobimba.
Tokomi na tango ya kotelemisa bobimi-bimi ya ba eglises de reveil oyo ezali binzambi-nzambi esalelaka kombo ya Yesu na tina moko kaka ya kolokota misolo pona kovimbisa mabumu ya bakambi na bango. Esengeli Leta atia mibeko na maye matali bobimi na bango pe bisika ya botongi bitonga na bango, esengeli pe Leta a favorize bosangani na bango na esika moko. Esengeli tobima na sitiwasio ezanga motu na makolo oyo esalaka ete lisanga ya ba eglises de reveil ekoma entreprise ya liboso na kati ya mboka oyo ebotaka ata mbuma moko te na tina ya nkita ya mboka, esengeli tosukola mboka na binzambi-nzambi oyo elalisaka peuple na biso pe elembisaka ntombwa ya mboka, esengeli tobongola bokasi ezanga tina na bokasi pona misala oyo ebotaka mbuma na tina ya ntombwa ya mboka. Na yango, tosengeli ko encourager ba pasteurs bazongela misala na bango ya kala esika wapi bakotia molende na bango na kosalela ntombwa ya mboka na ndenge elongobani. Na kotala monene ya probleme oyo, nayebi ete meko nionso tokoki kozua ekozala na tina te soki mboka na biso ezongeli etamboli elongobani te, oyo ekopesa mosala na moyi mboka nionso oyo azali na makoki ya kosala, oyo pe ekozongisa bana nionso na nzela ya kelasi, po biso nionso toyebi ete bobimi-bimi ya binzambi-nzambi esekamaka likolo ya bobola. Mingi batu bakozala na misala ya malonga na lifuti elongobani, mingi pe tango ya kolekisa na binzambi-nzambi ekoya moke, esengeli bakonzi ya sika bayeba yango. Na kati ya etamboli ya malonga oyo towuti kolobela, tosengeli kolengena manaka ya rééducation ya peuple pona kokangola bango na aliénation mentale oyo ekanga mitu ya batu wuta bapaya bakotela biso pona kokonza biso. Esengeli bayi miziki ya Nzambe bakotisa na ba repertoires na bango ba nzembo pona koteya morale na peuple, po kokomisa mutu malamu ezali pe kosalela Nzambe. Eloko moko kaka ezotinda ngai nazala na elikia makasi ezali ete nionso wana ezali po mboka na biso ezali na sitiwasio ya mabe na maye matali ekonomi, oyo ekotisa batu na bobola ya makasi, yango wana soki kaka stiwasio wana ebongi, soki mutu nionso azali na mosala oyo ekofuta ye pe ekokani na formation pe na ba posa na ye, nionso wana ekolimua, ba pasitele bakozala lisusu na influence te likolo ya population pe mosala na bango ya kipasitele ekosila ngala pe ekozala lisusu te po mingi na bango bakozongela misala na bango oyo bayekolaki na kelasi.
Ngayi wa bino na bolingo ya mboka,
KUETE NZA-YAZOLA’MO Muana KINGOYI Wa KINDAMBA
Patriote Résistant,
Inventeur de la ludotique.
Article publié en français le 22/02/2016 Traduit en Lingala en Août 2016
Pona kotanga mokanda eye na français, fina awa.
Fina awa pona ko telecharger too ko imprimer mokanda eye.
MOKANDA EYE ESEPELISI YO, KOBOSANA KOPANZA YANGO TE EPAYI YA BANINGA NA YO YA FACEBOOK TOO PE KOTINDA YANGO EPAYI YA BAMISUSU !
Kaka na kolanda likanisi wana pe na kati ya site oyo, na kosenga bino botanga pe mikanda eye :
EGLISES DE REVEIL NA MAYE MATALI NZAMBE, TALA BOSOLO EKOKANGOLA BISO.
MOKANDA EPAYI YA BAYI MBOKA CONGO, NZELA YA BOSIKOLI YA MBOKA.