- Tokundola lisitwale : Muango mua Recours à l’authenticité.
Na Octobre 1971, eleko MPR ya nkondo Prezida Mobutu na muana mboka Tshisekedi bazuaki meko ya kokota na recours à l’authenticité pe ya kobuakisa ba prenom ya kimokristo, misu na biso mafungwamaki pe tozalaki kosepela mingi na likanisi ya kozua ba prenom ya sika. Eleko wana nazalaki muana kelasi na Institut de la Salle ya Tumba na kati ya Kongo Central esika nazalaki interne. Na mobu wana, nawutaki kolongwa na college Saint Alphonse ya Mangembo na kolanda liteya ya Tata Mokambi ya ekole wana oyo amonaki ete ebongaki pona ngayi nakende kolanda ba etide na ngai na section Maths-Physique n’esika ya kokota na Psycho-Pedagogie oyo ezalaki boponi kaka moko tozalaki na yango na college ya Mangembo, yango nde esala ete nzela ya vie na ngai ezala oyo ezali lelo pe oyo nazalaka na litondi makasi na ye pona yango. Suite na mokano wana ya bureau politique ya MPR, nakanisi mua tango epesamelaki biso pona totika ba kombo ya kala pe tokoka kosolola ba baboti na biso oyo basengelaki koyeba bakombo nini ya sika tosengelaki kozua, nayebi lisusu te soki tosengelaki kotuna baboti na biso na mikanda (na eleko wana poste ezalaki kotambola malamu) too tosengelaki kozela konje ya Nowele pona yango. Eloko moko kaka ezali koyela ngai na motu ezali ke meko wana esalaki na kati na biso lokola revelateur, na mbala moko tomonaki kibolole ya kolata bakombo ya kimokristo oyo toyebaki tina na yango te, yango wana na sima ya kozua bakombo na biso authenticité, lisano na biso ya tango wana na eleko ya rekreyasio ezalaki yakobenga baninga na bakombo ya bakristo kaka pona komitshiola biso na biso. Tozalaki kobengana ndakisa na bakombo lokola Marcel, Nicodème, Vital, Joseph, Alphonse, Hyppolite too pe bakombo misusu oyo ezalaki koyela biso na motu, yango ezalaki kosekisa biso makasi lokola ndenge ezali kolakisa na kati vidéo ya 18ème anniversaire ya Zaïko Langa Langa oyo na kati na yango Papa Wemba na baninga na ye bazalaki komitshiola na ba preno na bango ya kala. Recours à l’authenticité oyo ezalaki likanisi ya malamu oyo esengelaki ezala ebandeli ya processus na biso ya désaliénation spirituelle, malerezema ekendeki tii na suka te, esika esengelaki ekoma. Po sima ya mua ba mbula, bizaleli na biso ya kala ekomaki kozonga pe ba congolais bazuaki muaye ya koleka na nzela mopanzi na kokelaka ba kombo na lopoto pona bana na bango, oyo mingi ezalaki kowuta na influence ya ba eglises de reveil oyo eyaki kobima mingi. Kokende ya prezida Mobutu pe ebongisaki makambo te, preske ba congolais nionso bakomaki kozongela ba preno na bango ya kala pona kotia yango na mikanda ya Leta, soki yango ezali, ngayi moko pe nayaki kozongela preno na ngai ya kimokristo tango nazuaki nasionalite mosusu na 1980, kasi wana ezalaki kaka pona kosalela bizaleli pe ba kutime ya France pe pona komikotisa na systeme ya mboka na ngayi ya sika. Nakolikia ete na mikolo ekoya, na sima botalisi ya ngai ya lelo, misu ya peple na biso ekofungwama pe tokokoka kosala bokabuani bwa solo na kimondele na tina ya kozongela spiritualité ya solo oyo ekopesa biso makoki ya kokota na botambwisi bwa ntombwa na ndenge ya bobiso.
- Boyingeli bwa bamindele, bosukisi bwa bonzambe ya Afrika.
DISIKULU YA ROI LEOPOLD II NA BA NGANGA NZAMBE OYO ATINDAKI NA CONGO BELGE.
To pe ndenge ya kokomisa batu bawumbu nakobongolaka ndenge na bango ya kokanisa na nzela ya bonzambe.
Video oyo bawutaki kolongola yango na YouTube po ezalaki kolakisa polele makanisi na bango ya mabe ndenge balengelaki koya kolatisa biso bonzambe ya sika oyo ekobosanisa biso bonzambe ya ba nkoko na biso pe kokomisa biso bawumbu na bango, yango wana totie yango na site ya Odysee.
Na mobu 1482, boyei ya bamputulukezo eyaki kotelemisa ntombwa na biso na mambi oyo tozalaki na yango mosika liboso, mambi ma spiritualité. Bakoko na biso basengelaki kopotana na ba mindele oyo bayaki koyingela mboka na biso elongo na ba misionere na bango oyo bazalaki wana pona kolimuisa boyebi pe ba pratike na biso na tina ya kokonza biso malamu, atako batu bazalaki koboya pe kobundisa yango, lokola ba Yaya Kimpa Vita oyo batu nionso bazali kokumisa lelo na tango bazali pre ya kotumba Yaya Kuyalu Bakembisa ya lelo oyo azali kobunda lokola ye pona bozongisi ya spiritualité pe bokoko na biso. Ba misionere ya mindele bakotisaki Biblia na makasi oyo mateya n’ango ezali komonana lelo ke ezali n’ango lokuta lokola ba masapo oyo babetelaka bana mike. Kobanda na lisitwale oyo ya bokeli ya mokili oyo eteyaka biso ete sima ya kokela likolo pe na se, Nzambe azuaki mabele pona kokela mutu ya yambo oyo sima na mua tango alongolaki ye mopanzi moko pona kokela muasi. Elingi koloba ete, engebene na lisitwale wana biso nionso tozali bakitani ya kuple wana, or biso nionso toyebi ete tozali bambuma ya ba inceste te kasi tozali bambuma ya ba mbongwana-mbongwana ya besipesi nzike oyo ebandaki na yango oyo toyebi lelo na kombo ya « Big Bang ». Tango tozalaki bana mike, tozalaki koyekola na katekisimo ete Nzambe avandaka na likolo oyo ezali likolo ya mapata. Tango tozalaki kokola, tomonaki ndenge ba mpepo na ba fize ezalaki kokatisa bitando ya mapata, oyo ezalaki kolakisa ete lola ezalaki wana te, sima toyaki pe komona mobembo ya liboso na sanza, na maye nionso toyebi lelo na maye matali esipasi, mutu moko te akoki koyebisa biso na kati wana esika lola ezali. Ndenge bana soki bakoli bayaka koyeba ete Pere Nowele azalaka na ye te, biso pe toyebi lelo ete nionso bazalaki kolobela biso ezalaki n’ango masapo ya kitoko pona kondimisa biso makambo ya ndenge na ndenge oyo ezali n’ango bosolo te. Ba ndakisa ezali ebele oyo toza na tango te ya kolobela yango awa, oyo epesaki bango makoki ya kobebisa makanisi ya bana ya Afrika sima ya ba mbula na ba mbula ya kolonizasio tii na nivo ya kokomisa bango bateyi ya Biblia na molende ya koleka kutu oyo ya ba mindele baye bayelaki biso yango. Lokola towuti kokembela bomati bwa Yesu-Kristo na likolo, motuna moko eyelaki ngai, na boyebi tozali na yango lelo na maye matali esipasi, soki Yesu amataki likolo na vitese oyo amatelaki oyo batu bazalaki komona na miso na bango, soki asengelaki kokende na exoplanete moko songolo, soki totali ntaka ekaboli exoplanete nionso na palaneti na biso, soki pe totali vitese oyo amatelaki tokoki koloba ete kino lelo nayinu akomi esika azalaki kokende te, pe na malili oyo toyebi ezali na esipasi, akokoma kuna lokola libanga ya glasi. Toyebi pe ete na lola ba nzoto ya bomoto ezalaka te, kaka milimu nde ezalaka kuna, yango ezali kolakisa lokuta nionso oyo bateyaka biso mikolo na mikolo, yango tokomituna, bosolo ezali nini, ezali wapi ? That’s the question !
Tobunga te ete Biblia ekomamaki na batu, elingi koloba batu lokola ngai oyo nazali kokoma lelo, bakokaki kozala na bango na inspiration ya malonga, kasi soki tolongoli oyo ezali ba temuaniaje ya vie ya batu, nionso oyo etikali ezali kaka interpretation oyo esekami na boyebi ya eleko wana. Na maye matali Yesu-Kristo muana ya Nzambe, ekoki n’ango kozala ya solo, kasi azali nde muana ya ba Nzambe ya peple ya ye oyo evandaki na mabele ya Israël, elingi koloba ya ba grands esprits oyo elengelaka peple wana ndenge Mfumu Kimbangu alengelaka peple ya Kongo na bayindu nionso ya Afrika, po soki Yesu atindamaki pona mokili mobimba alingaki kotambola kaka na Moyen Orient te, alingaki atambola pe na Europa too pe na Azia tii na Afrika, na Amerika too pe na Oceania, kasi nandimi te ke ayebaki ete ba mabele nionso wana ezalaki pe banani bavandaka kuna too pe langi ya loposo na bango ezali nini, oyo muana ya Nzambe esengelaki koyeba. Yesu ya Nazareth atikala koloba eloko te na maye matali ba indiens ya Amerika too pe pa Papous ya Pacifike, atikala kotika mabele ya peuple na ye te oyo ayaki kobikisa pona kokende, ezala na mosuni too na molimu, esika mosusu, ndenge Mfumu Kimbangu asalaki tango atambolaki, atako azalaki ya kokangama na bonzoto, pona kotala ba mboka nionso ya Afrika ya Bayindu oyo ayaki kokangola, na bosolo mutu azuaka riske ya kopesa bomoyi na ye kaka na tina ya kobikisa batu na ye. Ba misionere bateyaki biso pe ke Nzambe azali mondele moko ya mobange na mandefu ya molayi oyo avandaka na kiti ya bokonzi na lola, esika azingami na muana na ye pe na Elimu Santu na bokengi ya ba anzelu, esika pe azali kokengela mokili oyo ezali na se ya makolo na ye na maye nionso mazali koleka kuna, nazali pre ya kobeta mondenge ete elili wana ezali na kati ya motu ya muana Congo too pe muana Afrika nionso, pe soki totuni na moko na moko na bango ayebisa biso ndenge akanisaka Nzambe, nandimi te tokoki kokuta moko oyo akanisaka Nzambe akokani na koko na ye, na yango Verckys Kiamuangana alongaki kobongola makanisi ya batu te na nzembo na ye « Nakomitunaka », kasi tozala na kondima ete Nzambe azali na ye mutu te ndenge tokotalisa yango awa.
- Bosolo na maye matali Nzambe, alima ya boyebi ya bakoko na biso.
Pona kolimbola oyo Nzambe azali, totalela nainu maye toyebi pe mazali na bokokani na oyo tolingi kolimbola. Tobanda nainu na Leta, ndenge nini tokolimbolela Leta ? Tokoloba ete Leta ezali lisanga oyo esangisaka batu babikaka na etando ya mboka moko songolo na bokambemi bwa guvernema na bango, oyo etambolaka na se ya mibeko miye miyangelami na bokalaka ya mboka na bango. Ndenge nini tokolimbolela communauté internationale ? Communauté internationale oyo ekoki kosangisa motango ya ba mboka oyo ekoki kovarie engebene na lotomo na yango, ezali lisanga ya ba mboka oyo esanganaka na tina ya ba interets communs na maye matali sije moko songolo. Mingi mingi, communauté internationale ewulanaka na ONU oyo ekambemi na kalaka mokonzi ya lisanga pe ekotambolaka na kolanda mibeko eyangelami na bokalaka ya lisanga eye. Ba ndakisa mibale oyo ezali kolobela masanga oyo emekolaka ba personnes morales oyo bazanga elongi pe oyo batu too pe ba mboka nionso ezali na kati batosaka po lisanga etambola malamu, oyo soki batosi yango te bakoki kozua etumbu elongobani. Na maye matali Nzambe, ezali ndenge moko, toloba ete Nzambe azali entité spirituelle oyo emonanaka na kati ya ba elements too ba composantes nionso ya Univers pe ya l’Au-dela esika ekabolama na biteni ya kokesana engebene na eloko na eloko eyambaka yango. Na kati ya entité wana, ba elements too ba composantes nionso epotanaka yango na yango engebene na mibeko oyo esalema pona yango, elingi koloba mibeko ya Nzambe. Ndenge lumiere blanche ezali bosangisi ya ba composante misatu ya ba langi oyo esalaka yango, Nzambe pe asalemi na ba composante misatu oyo tokobenga Bolingo, Mayele pe Nguya, oyo ekabwana na ndenge ya bokeseni engebene na eloko moko na moko ezali na kati ya entité divine wana. Bolingo pe Mayele ezali ba attributs ya bikelamu nionso ebikaka na mokili oyo na kati na yango tokokuta batu, oyo bazali likolo ya bikelamu nionso, yango nde epesaka bango nguya ya kobika na boyokani pe ya kokoba œuvre ya creation ya Nzambe. Nguya ezali sirtu eloko oyo ezalaka na kati ya ba elements materiels oyo Nzambe asalelaka pona kosala ba mbongwana ya minene too pona kopesa etumbu soki yango esengeli. Soki totali nkita nionso na makele oyo ezali na mboka na biso, tokoki koloba ete mboka na biso ezali puissance divine ya monene oyo muana mboka nionso asengeli kobenefisie na yango. Na ngambo mosusu, toyebi ete grase na composante « Mayele » na ye, Nzambe azali omniscient po ayebi nionso, grase na composante « Nguya » na ye, Nzambe azali omnipotent pe lokola amonanaka na kati ya ba element nionso ya Univers pe ya l’Au-dela, Nzambe azali omnipresent.
Soki totali malamu bakombo nionso bakoko na biso bapesaki na Nzambe, tokoki kosukisa na koloba ete bakoko na biso bazalaki na boyebi ya sembo na maye matali Ye po na bakombo wana ba attributs nionso misatu ezali na kati, ndakisa epayi ya peple Kongo bazalaki kobenga ye Nzambi ya Mpungu Tulendo oyo elingi koloba Nzambe ya Univers oyo azali tout Puissant, Omnipresent pe Omniscient. Nayebi bakombo nionso ba peple misusu ya Afrika bazalaki kopesa Ye te, kasi nazali na tembe te ete bakombo nionso wana ezalaki na ba attributs misatu wana na kati na yango po bango nionso bandimaki ete Nzambe na bango awulanaki na Univers oyo ezingaki bango, oyo bayebaki ete mokili na bango ezalaki na kati na yango na ndenge bazalaki komona soki batali minzoto na likolo. Engebene na ndimbola oyo nawuti kopesa bino, Nzambe pona peple nionso azali lokola Leta oyo na kati na yango tokotanga oyo nionso ebikaka na mabele ya mboka elongo na baye bazali na l’Au-dela oyo bazali milimu ya batu oyo bazali na kati ya singa moko na peple oyo ebikaka na mabele wana. Kasi soki Nzambe ya peple songolo akoki kowulana na Leta, nani azali mokonzi na yango pe banani bazali ba ministre na yango ? Na songe ya entité wana tozali ba grands esprits oyo bavandaka na nivo ya likolo oyo nalobelaki bino na mokanda na ngai eleki, na nivo wana tokokuta mokonzi ya entité oyo azingami na ba ministre na ye. Na nivo ya se, tokokuta ba esprits nionso oyo basalaka mosala ya ki anzelu mobateli na pe baye bazo leka pe bakozela bozongi na bango na mokili ya se too pe ba oyo bazali bannis. Soki tolongwe na l’Au-dela, tokiti na mokili ya se esika tokokuta na kolanda ordre hierarchique, ba « ngunza » na ba chefs coutumiers oyo bakabolaka ba role ya spirituel na ya politike na motu ya peple pe ya ba tribu nionso oyo basangani na kati ya peple wana, bango bazali wana pona kolendisa singa elingaka guvernema ya ba grands esprits na peple, oyo nionso wana elakisi pona nini bozongisi ya bokonzi ya ba chefs coutumiers ezali na tina makasi, kaka na maye matali politike te na tina ya kolonga bosomi na biso ndenge nakomaki yango na mokanda na titre ya « Muana congo, telema tosikola mboka », kasi pe na maye matali spiritualité na biso pona kozongisa ba kondisio elongobani pona tokoka kokumba ntombwa na biso na ndenge ya bobiso.
Ndenge towuti kotalisa oyo Nzambe azali, tokoki kosukisa na koloba ete Nzambe azali na elongi te, pe elakisi ete soki elilingi ba misionere balakisaki biso ezali ya bana mike, boyebi ya bakoko na biso ezalaki na buania ya mikolo oyo elakisi ete spiritualité na bango ezalaki na boyebi makasi koleka oyo bayelaki bango. Yango nazali komituna soki bandoki ndenge toyebeli bango epayi na biso bazalaka pe na Poto, na ndenge nayebeli bazalaka te ! Elembo ezali kolakisa yango ezali ete Hollywood oyo emesana kosalela biso bilili na makambo nionso esala nainu film te pona kolobela yango, yango elakisi polele ete tozalaki na avanse makasi liboso ya mindele na domaine spirituel. Sima ya kokutana na bakoko na biso, bamonaki yango na sima ya koyekola bizaleli na bango, lokola bazalaki komimona likolo ya bayindu, pona kozala na sima na bango te basalaki nionso pona koboyisa bango boyebi na bango na kolobelaka bango ete ezalaki mayele ya Satana. Pona yango bayaki na ba misionere oyo bazalaki wana pona koteya Biblia na makasi, oyo soki bazalaki koboya bazalaki koforse bango na minduki. Ndenge basalaki bakoko na biso, ezali lokola soki basengaki na ba pionniers ya conquete spatiale batika misala na bango na kobanga bakende kotumbola kimia ya Nzambe na Lola likolo ya mapata, soki ezalaki bongo bomoni te ke elingaki kopekisa biso toyeba maye nionso toyebi lelo na maye matali esipasi, tala ndenge ba kolon balongaki koboyisa biso boyebi na biso na maye matali spiritualité elongo na ba rite na biso. Pe basukaki wana te, na bolayi bwa ba siekle na ba siekle bakobaka kaka mosala na bango ya bobebisi makanisi na biso pe ya botshioli ya ba don na biso pona kondimisa biso ete ezali na tina te, pe na oyo bakokaka kokitisa te, balukelaka yango ba subterfuges na tina ya ko masquer ba faiblesses na bango oyo bafulaka tango inso pona kondimisa biso ete yango ekokani too eleki ba don na biso, nionso wana na tina ya soi-disant supériorité na bango. Yango wana tokoloba ete, atako batu bakomaki Biblia bazalaki na makanisi ya mabe te, ba mindele oyo bayaki koteya biso yango basalelaki yango mingi na avantaje na bango pe ba profitaki na mateya mazali na kati pona kokotisa makanisi ya mabe na mitu ya bayindo nionso na tina ya kokomisa bango bawumbu na bango. Na yango tokoki pe komituna soki complexe d’infériorité oyo ezali na mitu ya bayindo bayike ewuta te na ndenge bateya bango ete Nzambe azali mondele lokola muana na Ye. Lokola bayindo bakoma kokumisa Nzambe wana elongo na muana na Ye, na koyeba ete soki okumisaka mutu, okozala na tendance ya kokumisa pe baye ya ye pe na baye bakokani na ye, na koyeba ete mutu oyo akumisaka amitiaka kaka na se ya idole na ye pe oyo atiaka tango inso likolo ya piedestal, yango tokokamwa te soki tolobi ete likambo’ango ewuta wana ! Kasi sik’oyo, ndenge nawuti kotalisa bino bosolo, boyebi ete Nzambe azali mondele te, azali pe moyindo te, kasi peple na peple azali na oyo akoki kobenga Nzambe na ye, oyo azali na motu ya ba grands esprits balengelaka ye, oyo akokani na batu ya peple’ango.
Bakoko na biso oyo bametrizaki sianse oyo tobengi lelo kindoki, oyo tokoki kolimbola lokola boyebi ya makasi na likambo moko songolo, oyo ezalaki kopesa bango nguya ya kokominike na l’Au-dela, bazalaki obligé ya koboya pe kobosana yango likolo ya presio ya ba misionere, moke oyo baboyaki kotika yango pe babombaki yango pona kosalela yango na bokutu bazalaki kosalela yango mingi pona misala mabe, epayi majorite ya batu batikaki yango pona kokota na bokristo. Nakanisi lelo bakoko na biso bazui mokano ya kobimisa biso na alienation mentale wana pona kozongisa boyebi wana oyo tozalaki na yango makasi pe oyo ezalaki kopesa biso avantaje vizavi ya ba peple misusu, tala tina ya inspiration oyo batindelaki ngai pona bokeli ya apaleyi oyo ekopesa biso makoki ya kokominike na l’Au-dela. Bokanisa te ete kooze koimazine projet wana ezali liboma, po soki lobi ekweyi na matoyi ya firme occidentale moko songolo oyo ezali na ba muaye yakokokisa yango, bino batu ya liboso bokoya kolobela kindoki ya mondele, alorke eloko ya kindoki ezali na kati wana te, po ndenge nalobaka tango inso, pona mutu ya mukolo, kokela ezali n’ango lisano ya bomuana oyo esalemi na mutu ya mokolo, likambo ya pasi ezalaki kaka ya kozua likanisi yango. Na yango, nakokaki pe kobomba sekele, nalobela projet yango te kino ekosalema, kasi nazalaki obligé ya kolobela yango pona kososolisa bino makambo misusu na ndenge elongobani, ezalaki pe muaye ya koyebisa ba mvuama pe ya kolukela misolo miyike oyo projet wana ekosenga pona bokokisi na yango. Nakolikia ete batu na biso oyo bazali na domene ya spiritualité bakokweya na maboko ya bapaya te pona batekela bango ba sekele oyo esengeli na projet wana ndenge yango esalemaki na maye matali medecine traditionnelle na biso.
- Nzambe na biso, relation na biso na Nzambe.
Awa tolobi boye, ndenge nini Nzambe asalaka na kati na biso ? Na ndenge tozali batu oyo tozali na conscience oyo epesaka biso nguya ya kokesenisa malamu na mabe, tozali biso moko ba responsable ya ba acte na biso pe ya etamboli na biso na vi. Malamu oyo tosalaka epesaka biso nguya ya ko charger nzotu na biso na énergie positive, nzoka nde mabe tokosala eko charger yango na energie negative, ezali energie wana ya positive too ya negative oyo tokokongolaka nde esalaka liboso ya ekelamu nionso too pe element nionso oyo ekumbaka energie divine pona koprovoke fenomene ya malamu too ya mabe na kati biso too pe na ba nzela na biso, yango ezali lokola litomba too etumbu oyo tokoki pe koloba ete ewuti epayi ya Nzambe na nzela biye nionso biyambaka Ye. Energie positive, atako ebendelaka biso ba influences ya malamu, esalaka pe na bomoyi na biso lokola ndenge vaccin esalaka na nzotu na biso, elingi koloba ete epekisaka ba influences ya mabe ekoka kozua biso, nzoka nde énergie négative, oyo tokoki kowulinia na immunodeficience, esalaka exactement le contraire. Ndenge moko, tango lisanga ya batu ekomaka kosalela makambo ya mabe too pe soki lisanga wana ezali kosala mabe epayi ya bikelamu too pe ba element misusu oyo eyambaka Nzambe, ezala batu, biwele, ba nzete too pe biloko misusu, toyeba ete etumbu ya makasi ekoki kokweyela biso, elingi koloba ete ecologie oyo ezali pona kobatela nature pe environnement esengeli kolongwa na mambi ma politike pona kokoma moko ya matomo na biso liboso ya Nzambe, po bolingo ya nature pe bobateli na yango ndenge moko na amour du prochain ekendaka nionso na nzela ya bolingo ya Nzambe. Yango wana mutu lokola Nicolas Hulot na France, oyo amipesa nzoto pe molimo na misala ya bobateli nature pe environnement asengeli kozua esika moko na mitu na biso na mutu lokola mere Teresa oyo amipesaki bomoyi na ye mobimba na kosalisaka batu misusu.
Tango balobaka ete Nzambe apesaka litomba too pe etumbu, ezali nde Nzambe, entité divine oyo tozali kolobela, oyo asalaka na nzela ya bikekamu nionso too ba element nionso bayambaka ye, yango wana ezali n’ango na tina te ya kozela ke okende na l’Au-delà pona kozua etumbu po nionso efutamaka awa na se, atako sima ya liwa na biso, etumbu ya ndenge mosusu ekoki kozela biso engebene na ndenge tobikaki na mokili ya se. Tango eloko ya malonga eyelaka biso, ezali nde mbuma ya ezaleli na biso, bongo soki tokopesa matondi epayi ya Nzambe, ezali Nzambe na ndenge ya entité te kasi Nzambe na nzela ya milimu oyo ekengelaka lobiko na biso ya mokolo na mokolo na misala na biso pe na ba nzela na biso ndenge systeme de navigation esungaka biso tango tokumbaka motuka. Na cas particulier ya guerison miraculeuse, ezali energie positive oyo tokongolaka grase ya etamboli na biso oyo ekosala na lisungi ya energie oyo ekuwuta na grand esprit oyo tokobelela pona kosala likamuisi oyo ekosalema soki tozali na kondima ya makasi epayi ya esprit wana, oyo epayi ya ba katolike akoki kozala mosantu too pe Yesu ye moko. Ba energies positives too negatives oyo mutu akokongolaka etikaka elembo na nzoto na ye, ezala na kati too libanda, pe nionso oyo mutu akosimba etikalaka na elembo ya mutu wana, ndakisa ndaku oyo epayi wapi chambre etikalaka na elembo ya makasi, ndakisa bilamba oyo mutu alataka oyo na kati na yango ba suvetema etikalaka na bilembo ya makasi, yango wana basi basengeli kosala angele na maye matali basuki oyo bazali kolata, oyo bayebi esika ewuta te, tokoki pe koloba ndenge moko na maye matali ba greffe. Ba energies ya mutu ekitaka pe tii na bana na ye na tango asalaka bango, yango elingi koloba ete malediction ekoki ko traverser ba generations ndenge balobaka.
Engebene na definition oyo towuti kopesa bino, tokoki komona Nzambe na ndenge mibale, ya liboso Nzambe ya universel oyo akoki kowulana na ONU, oyo asangisi biloko nionso ya Univers, ya mibale Nzambe ya esika tobikelaka pe oyo tokoki kobenga Nzambe ya peple songolo, oyo akoki kowulana na Leta, oyo asangisi mabele songolo na bikelamu nionso ebikalaka likolo na yango. Tango tosambelaka Nzambe, totindaka losambo na biso na reyalite epayi ya ba grands esprits oyo bazali na kati ya guvernema ya entité wana, peple nionso azali na baye ya ye, pe oyo tobengaka Yesu azali ya biso te contrairement na Mfumu Kimbangu. Yango wana, na relasio na biso na Nzambe, soki totaleli ba pratike oyo ba relizio ya bapaya elakisaki biso, tosengeli kokoba kosambela ndenge tomesana kosambela, kasi ya mbal’oyo tosengeli kotinda losambo na biso na baye tosengeli kotindela yango, tokokoba koyemba kasi awa pe tokoyembela baye ya biso oyo bazali wana pona kosunga biso, tokokoba kosala pona kolandela œuvre creatrice ya Nzambe na tina ya kobongisa ba kondisio ya lobiko ya batu pe ya bibwele na kati ya environnement oyo tosengeli kobatela. Ndenge bakoko na biso bazalaki kosala, tosengeli komesana na kopesa melesi na Nzambe oyo aleisaka biso pe asungaka bokolongonu na biso na nzela ya ba element nionso ya nature pe ya environnement lokola bibwele, ba nzete, mayi pe mopepe oyo bazali bayambi ya Nzambe. Na maye matali adorasio, environnement na biso ekopesa biso ba okazio ebele oyo ekoki kopesa biso libaku ya kosandjola bonene bwa Ye na nzela ya biye nionso bizali pe bimonisaka Ye na kati na biso. Boye tokoki komata likolo ya ngomba pona ko admirer magnificence ya Nzambe, tokoki ko plonger na kati ya dezere too na kati ya oseya pona koyeba malamu ke tozali na biso eloko moke na kati monene na Ye, na kati ya butu tokoki kosepelisa misu na biso liboso ya spectacle celeste oyo ekososolisa biso diversité ya Nzambe na kati ya Univers pe na eteni moke oyo palaneti na biso eokipaka na kati na yango, tokoki pe kokende kotambola na kati ya zamba esika tokosepela na loyembo kitoko ya ba ndeke na bibwele nionso ebikaka na kati na yango pe oyo ekolakisa ndenge Nzambe azali bisika nionso tokoki kokende. Na nzela ya ba ndakisa nionso oyo nawuti kopesa pe na misusu miyike, tokoki kosandjola Nzambe pe kozongisela ye lokumu, entuka bakoko na biso bayebaki yango pe bazalaki kosalela yango, yango wana bazalaki kopratike animisme pe bazalaki na limemia makasi na maye matali environnement na bango po bayebaki ete esprit ya Nzambe ezalaki na kati na yango, yango ezali ko confirmer ke boyebi na bango na maye matali Nzambe elekaki oyo bayelaki bango na Biblia.
Na yango, emonani n’ango polele ete dime oyo ezali na baze ya bofuluki ya ba eglises de reveil ezali n’ango invention ya eskro moko ya mayele oyo asalaki interpretation malhonnete ya Biblia na tina ya kobikela likolo ya boyinga ya bandimi na ye oyo akozala kobenda na kati ya etonga na ye atako bazali babola, nakosengaka bango bafuta eteni ya mbongo oyo bakobanda kozua na lifuta na bango, esika ata Leta oyo asengeli kosunga bango asengaka bango mpaku te, ezali nde trouvaille wana ebenda ba eskro nionso ya mokili oyo bakoma ba pasitele too basali ya Nzambe, yango nde ekomisi biso na sitiwasio oyo tozali na yango lelo. Yango wana tango ebelemi pona moko na moko na biso tobuakisa oyo nionso ezalaki kokanga biso kino mokolo ya lelo pona tokota na kati ya processus ya désaliénation oyo ekokangola biso. Kobanda na ngai moko oyo nakokaki kosala ndenge mosusu te ke ya ko ranger sapele na ngai ya ki katolika pona kotikela milimu ya bakoko nzela nionso polele. Tango pe ebelemi ya kobuaka pona libela bakombo na biso ya bapaya, po kolata kombo ezanga sinifikasio na kilitire na yo ezali lokola komema kilo oyo ezanga tina, contrairement na kombo ya bokoko oyo ezali komema charge énergétique oyo ekokangisa yo na singa ya bakoko na yo. Soki tokei na maye matali kindoki oyo ba eglises de reveil basabolaka mingi, ezali te po batu mingi oyo bazalaki na makoki ya kosalela yango bazalaki kosalela yango na ndenge ya mabe ke tosengeli koboya oyo ezali boyebi ya bokoko na biso, po soki tosali comparaison, kindoki ezali eloko te liboso ya ba sianse oyo ba mindele basaleka, oyo pe endimama pe endingisama na ba eglise nionso, pona kokela ba armes de destruction massive oyo esala pe ezo koba kosala ba milioni ya bawei na kati ya mokili mobimba ! Kindoki na biso ezalaki kaka na ba kote ya mabe te, po lokola sianse nionso, bakokaki kosalela yango na tina ya bolamu too pe bobe, biso tosengeli kosala nionso pona kozongisa sianse wana, oyo bakoko na biso bayebaki makasi, na tina ya kosalela yango pona ntombwa ya mboka na ndenge ya bobiso.
- Bosenga ya ba Nzambe na biso pona peuple na bango.
Na kati ya mokanda na ngai ekeki, nayebisaki bino ete sije na ngai ya bolukiluki ya mikolo ekoya ezali ya kokela apaleyi oyo ekopesa biso makoki ya kosolola na l’Au-dela, nakanisi ete ndenge nandimaki misio wana na esengo nionso efungolekaki ngai nzela na ba revelations misusu. Ndenge nalobi likolo, peple Kongo na ba peple misusu ya Afrika bazalaki na avanse makasi na maye matali boyebi ya spiritualité, soki kolonizasio na Biblia na ye eyaki kotelemisa evolution na bango te, lelo tolingaki deja kozala na muaye ya kominikasio wana oyo batindi ngai pona kozongisa singa ya lisitwale na biso na nzela esika babimiselaki yango, yango wana ba informations mingi ezo komela ngayi oyo nazo meka kotalisa bino sima ya kososola yango pe kokomisa yango polele pona mutu nionso. Kasi oyo ezo komela ngayi ezali exceptionnel te, ekomelaka na mutu nionso ya kozua ba mesaje ya l’Au-dela, kasi tango okozua yango, too okosala angele te pe yango ekobunga n’ango, too okozua yango kasi ozali na boyebi elongobani te pona kososola yango, too pe oyebi kososola yango kasi okobunga na koyeba motindi na yango pe okotia yango na motu ya motindi mosusu oyo alongobani te. Na ka wana, bososoli na yango eko dependre mingi mingi na boyebi ya batu pe na etat d’esprit pe environnement na bango na eleko bakozua ba mesaje wana, yango wana batu oyo bamonaki Nzambe lokola mondele moko ya mobange bayebaki te ete batu ya loposo ya langi mosusu pe bazalaka na mokili, pe bamonaki Nzambe kaka na elilingi na bango. Na ngambo na ngai, soki tii lelo namesanaki mingi kozua bilembo oyo ezalaki kowuta na ba anzelu bakengeli na ngai pona mosala pe ba nzela na ngai, ya mbal’oyo namonaki ete ezalaki lisusu bango te po ba mesaje nakomaki kozua ezalaki ya niveau mosusu na ndenge yango ezalaki ya motuya pe ezalaki ko concerner kaka ngai moko te kasi bayi mboka nionso, na ndenge yango ezalaki na tina ya kopesa ngai mission makasi oyo nasengelaki kosala pona libération spirituelle pe politique ya peple na biso. Yango ebandaki tango nazalaki koluka nzela oyo tosengelaki kolanda pona kosikola mboka na biso pe kozongisa bosomi ya mboka, ezalaki pe kaka na eleko wana nayaki koyoka makanisi ya Muana mboka BOKOMBA Kassa-Kassa na maye matali rehabilitation ya pouvoir coutumier, yango esalaki ngai déclic oyo ememaki ngai na nzela ya projet oyo nalobelaki bino na mokanda na ngayi na titre ya « Muana Congo, telema tosikola mboka » oyo bokoki kotanga na kati ya site oyo. Liboso mokanda wana esengelaki ezala na eteni moko na kati pona kolobela ba mbeba nionso ba eglises de reveil basala na kati ya sosiete na biso pe meko nini tosengeli kozua soki tosili kosikola mboka na biso, kasi lokola mokanda wana ezalaki deja molayi, pe pona kobungisa batu te na moboko ya mesaje oyo ezalaki kolobela rehabilitation ya pouvoir coutumier, nazuaki mokano ya kosalela yango mokanda mosusu apare. Ezalaki nde tango nazalaki kokoma mokanda oyo mosusu ke nakomaki kozua ba revelations na ba mesaje nasengelaki kolekisa na batu pona kobundisa makanisi nionso ya mabe pe ya lokuta oyo epanzana na tina ya kobebisa mitu ya batu pe kokomisa bango bawumbu ya mindele, mesaje na mesaje ezalaki kobotela ngai mituna misusu oyo pe ezalaki komemela ngai ba revelations misusu. Ba mesaje wana, nazalaki kozua yango na biteni mike mike, na tango inso, mingi mingi na butu, nazalaki kowelela kokoma yango pona ebunga te, elekaki ndenge wana na eleko ya ba poso nzike, bongo tango nakokisaki ba informations nionso nasengelaki na yango pona misio na ngai, etikalaki na ngai kaka kososola yango pe kokangisa yango lokola biteni ya puzzle pona ekoma mokanda oyo natielaki bino na titre ya « Eglises de reveil, balembisi ya ntombwa ». Autant nazalaki koyoka presio makasi likolo na ngai tant que nasilisaki nainu kokoma mokanda wana te, autant na suka nayokaki sulajema monene tango nasilisaki yango, wana ezalaki kolakisa ete nakokisaki misio na ngayi. Kasi esukaki wana te, kaka sima ya kosilisa kokoma mokanda wana pe ya kobimisa yango, makanisi na ngai ekomaki kokende na mituna misusu na maye matali vraie nature ya Nzambe, kaka na tango wana nde nazuaki eyano oyo emonisamaki lokola na mokanda ya kofungwama, epesamelaki ngai po nakoka koyebisa bino yango, po soki ngai namitunaki motuna wana batu misusu pe bakokaki komituna yango sima ya kotanga mokanda na ngai, ba grands esprits na biso ba juge bon ya kokomisa polele makambo misusu oyo ekoya kosilisa dosie oyo pe kotia peple ya Congo too pe ya Afrika na ba dispositions mentales elongobani pona bakoka kobanda etamboli ya sika, yango ezali tina ya mokanda oyo, oyo nakolikia ete ezali ya suka na seri oyo ya kolamusa bino po yango eliaka ngai energie psychique mingi, ekomi sik’oyo tango nazongela mosala na ngayi ya mokolo na mokolo, nalingi koloba mosala ya recherche. Lokola sik’oyo toyebi bosolo, pe ndenge nawuti koloba yango mua likolo awa, ekomi tango pona biso ya kokota penza na kati ya processus ya désaliénation na tina ya ko retrouver spiritualité na biso oyo eko rapprocher biso na milimu ya bakoko na biso. Kasi nayebi deja ke ekozala eloko ya pete te, po endoctrinement basala biso banda bomuana ezali makasi mingi koleka, tala tina ya bokeli ya apaleyi ya kominikasio na l’Au-delà, po yango ekosunga biso pona kopetola na bopete makanisi ya ba generation nionso ya lelo oyo esila kobeba mitu makasi, oyo soki tolongi kokela yango te ekozua biso ba mbula nzike.
- Mikano po na bobandeli ya eleko ya sika.
Pona kosukisa, nakanisi ba grands esprits ya peple na biso bazui mokano ya kolimuisa pona libela bilembo ya kolonizasio na tina ya kobandela eleko ya sika oyo ekomona ntombwa ya mboka na biso na ndenge ya bobiso, bazui mokano ya kosalela ngayi pona kokomisa makambo misusu polele na tina ya kovandisa ba baze ya demaraje ya sika pona mboka na biso. Na yango, esengelaki liboso ko resoudre puzzle ya bosolo oyo ekolakisa biso polele nivo ya alienation na biso pona tokoka kobanda mosala ya kopetola makanisi na biso. Na kati ya mituna nzike, emonisamaki na ngai lokola résolution d’une équation à plusieurs inconnues, pona ngayi mutu nazali scientifique pe cartésien, namoni ete eyano nazui ezali na logique makasi, etikali kaka na ba detracteurs balakisa biso le contraire. Ndenge emonani polele, tozali lisusu na rezo ya kotia tembe te likolo ya tina monene ya projet oyo nalobelaki bino na kati ya mokanda « Muana Congo, telema tosikola mboka », pe banda lelo tokomi na tango ya komikotisa ya bokokisi na yango. Ngayi, na mosala na ngai ya ki chercheur, nakozala okipe na bokokisi ya noble mission oyo epesamelaki ngai, pe nakozala disponible te pona kokonza yango ngayi moko, na yango soki moyi politiki moko ya mayele oyo amonaka mosika pe atiaka intérêt supérieur ya mboka likolo ya ba intérêts personnels azali, soki azali na ambition ya ko jouer role ya makasi na botambwisi ya mboka na biso, na esika ya kokota na potopoto ya bitumba ezanga tina ya maponami elongo na bapaya na mboka oyo ezali okipe, tala okazio ya motuya epesameli ye ya komitia likolo ya bipale ezanga tina pona kolata projet wana pe ya komema yango tii na bokokisi na yango, po eloko nalingi naloba ezali ete mutu oyo akosala nionso pona bokokisi ya projet wana akozua mapamboli ya bakoko na biso, pe akozala na esika ya motuya na kati ya lisitwale ya mboka na biso, dayere nazali na tembe te ke bayi mboka nionso bakozala sima na ye pe bakozala na litondi mingi epayi na ye. Nakobeta sete awa na koloba ete rehabilitation ya pouvoir coutumier ezali nzela kaka se moko oyo tosengeli kolanda pona ko reconquerir bosomi ya mboka na biso na ndenge ya siki-siki pe pona kokota na nzela ya ntombwa ya mboka na ndenge ya bobiso. Oyo azali na matoyi ya koyoka ayoka !
Ngayi wa bino na bolingo ya mboka,
KUETE NZA-YAZOLA’MO MUE NDAMBA NGOYI
Patriote Résistant,
Inventeur de la ludotique.
Article publié en français le 19/05/2016 Traduit en Lingala en Août 2016
Pona kotanga mokanda eye na français, fina awa.
Fina awa pona ko telecharger too ko imprimer mokanda eye.
PS :
Pona kobakisa sima ya article oyo, nazali na revelation mosusu nakosalela bino.
Nakobetela bino lisolo ya eloko ekomelaki ngai na butu ya le 1er tii le 2 Juillet ewuti koleka. Na butu wana, vers 3h00 du matin, nalamukaki na mbalakaka sima ya kolota ndoto moko ya bizare. Na kati ya ndoto wana, nazalaki temwe ya bokangami too pe bobikisi, wana nakoki koloba te, ya mondele moko ya mokolo pe na elongi ya Pere Noel oyo ezalaki kosalema na ngulupa ya ba gendarmes. Ye azalaki ya kozinda na mayi tii na tolo pembeni ya ngambo ya mongala moko quelque part na France, pe azalaki koboya kobima. Ngai nazalaki ya kobombana sima ya makasa ya ba nzete pe nazalaki kokengela bango na mosika, tango ba gendarmes bazalaki koluka babimisa ye na makasi, ye azalaki kobundana pe azalaki koganga makasi na monoko oyo ye ayebaki te pe lokola ba gendarmes bazalaki ko comprendre ye te, bazalaki kozua ye lokola mutu ya liboma. Lokola nazalaki kaka moko na nzinga-nzinga oyo akokaki koyoka monoko’ango oyo kutu nasalelaka te esali deja bambula, nayebaki ete maloba na ye ezalaki pona ngayi, azalaki koloba boye : « Bana ba Kongo, ntangu yifueni yi lufueti baka kimfumu kia Nza, ntangu yifueni ! Mono Kimpa Vita ngieti kuluzayisa, bana ba Kongo lukubama muyala Nza ». Azongelaki yango mbala mibale pe nayokaki yango polele tii na nivo ya koya kolamusa ngai na mbalakaka, ndenge ezalaka soki osali kindotila, motema na ngai ezalaki kobeta mbangu pe na mbala moko nawelelaki kokoma yango pona ebunga te, po namonaki ekokaki kozala ya motuya na komona ndenge yango ekoyelaki ngai na nzela ya mutu oyo ayebaki monoko’ango te. Na tongo, nakanisaki ke ndoto wana ezalaki n’ango makanisi na ngai mutu ezalaki kotambola suite ya mikanda oyo nakomaki, kasi na moyi ya mokolo’ango tango nayaki kokueya na ba page mibale ya Facebook oyo ezalaki kokundola dati ya liwa ya Yaya Kimpa Vita oyo ezalaki anniversaire na yango mokolo wana, na mbalakaka nazuaki conscience ke mesaje wana ezalaki ya solo, yango wana nasengelaki koyebisa bino yango, atako nasololi yango nainu te pona koyeba véritable signification na yango.
Pona baye bayebi kikongo te, tala mesaje yango na lingala : « Bana ya Kongo, tango ekoki ya kokamata bokambi ya mokili, tango ekoki ! Ngayi Kimpa Vita nazali koyebisa bino, bana ya Kongo bomilengela pona kokonza mokili ». Eske ezali profesi ya Kimbangu elingi ebanda ? Entuka soki tozongeli spiritualité na biso, kala te yango ekokokisama.
MOKANDA EYE ESEPELISI YO, KOBOSANA KOPANZA YANGO TE EPAYI YA BANINGA NA YO YA FACEBOOK TOO PE KOTINDA YANGO EPAYI YA BAMISUSU !
Kaka na kolanda likanisi wana pe na kati ya site oyo, na kosenga bino botanga pe mikanda eye :
EGLISES DE REVEIL, OKIPASIO MOSUSU OYO TOSENGELI KOMIKANGOLA.
MOKANDA EPAYI YA BAYI MBOKA CONGO, NZELA YA BOSIKOLI YA MBOKA.