OYO EZALI EYANO NA BISO NA DISIKULU YA MUTU OYO AMIBENGI « JOSEPH KABILA » LIBOSO YA BANTOMA YA MBOKA NA DATE YA 14/12/2015:
BILIAKI BANGO BIKOKI ! TANGO YA KOSAKANA ESILI ! TOBOYI DIALOGUE NA BA OCCUPANTS, TOBOYI MAPONAMI YA LOKUTA, TOBOYI BOKATI YA BA PROVINCES YA SIKA OYO ELENGELAMI NA BA OCCUPANTS PONA KO LENDISA PE KOWUMISA OCCUPATION YA MBOKA NA BISO, TOLINGI BOBOMI YA BANA KONGO ESILA, TOLINGI BOSAMBOLI YA BANA KONGO ESILA, NGONGA EBELEMI TOKOTA NA NZELA OYO EKOLONGOLA MBOKA NA BISO NA MABOKO YA BAPAYA, OYO EKOKOTISA KIMIA NA STABILITE NA KATI YA MBOKA, NZELA YANGO EZALI SE MOKO, OYO YA BOZONGISI YA BOKONZI YA BA CHEFS COUTUMIERS NA MOTU YA MBOKA.
MOTAMBU YA BA MPUKU : LOKOLA « KABILA » ALINGI TOSALA DIALOGUE PONA KOLUKA NZELA YA KOBIMELA NA NKOKOSO YA MAPONAMI NA NDENGE YA AUTHENTICITE, BISO PE TONDIMI, PO NZELA TOLINGI TOKOTA EZALI NZELA OYO EKOZONGISA BOKOKO NA EKAMBELI YA MBOKA, OYO TOBENGI « REHABILITATION DU POUVOIR COUTUMIER », OYO COLONISATION EBOTOLAKI BAKOKO NA BISO NA LOMA. NA NZELA WANA, « KABILA » YE MOKO AMIKANGI NA MOTAMBU OYO YE MOKO ALUKAKI, SINGA OYO YE MOKO APESAKI BISO YANGO KAKA EKOKANGA YE NA KINGO PE EKOSUKISA AVENTURE NA YE NA KATI YA MBOKA NA BISO. NA LIBAKU WANA, TOKO PROFITER PONA KOBONGOLA R.D CONGO PONA KOZONGISA KOMBO NA YE YA LOKUMU ZAÏRE, TOKOTIKELA BA OCCUPANTS KOMBO NA BANGO YA R.D CONGO AFDL, BAKANGAMA N’ANGO PE EMEMA BANGO NA BOZINDO YA EBALE NA BISO ZAÏRE, ESIKA BAKOKENDE KOKUTANA NA BAYE NIONSO OYO BAMOTINDAKI.
OPERATION TUMBA ZAMBA, BAMPUKU BABIMA, BANIOKA BAKIMA, TABLE RASE PONA MBOTAMA YA KONGO YA SIKA, ZAMBA YA SIKA, MBOKA YA SIKA.
OPERATION KABOLA MAYI NA MAFUTA, MAYI EPAYI, MAFUTA EPAYI, MOTO NA MOTO NA MBOKA NA YE. TOBANDA SOULEVEMENT POPULAIRE OYO EZANGA MINDUKI, TOLUKA KOYEBA NANI AZALI NANI NA KONDIMA PE KOTATOLA IDENTITE NA BISO YA SIKA YA KI CONGOLO-ZAÏROIS PONA KOTIA BA OCCUPANTS PEMBENI PE KOBIMISA BANGO NA MBOKA NA BISO.
Na suka ya mibu ’70, eleko tozalaki na Paris pona koyekola na lisungi ya ba bourses ya mboka France, tozalaki pe kozua tango ya kokanisa ndenge ya bokitani na biso na bokambi ya mboka soki Mobutu alongwe, na tango ya lisano yakoyeba ba roles nini ebongaki na biso soki tozui libaku ya tokota na mbulamatari ya mboka, baninga nionso bazalaki komipesa bibonga ya ki ministre, esika bango nionso bazalaki kopesa ngai ebonga ya president too ya premier ministre. Ezalaki mbala liboso pe ya suka te likambo ya lolenge wana ekomela ngai na kati ya bomoyi na ngai, namesana na yango, yango ekomelaka ngai soki nazali na kati ya mangomba moko songolo, ezala epayi ya biso na biso bayindo to pe na ba mindele, soki ekomi tango ya kopona mokambi, atako ezali likanisi na ngai te, batu bakolinga kaka batia ngai liboso na bango, yango wana namitunaka tango inso soki ezali etinda na ngai te oyo nayelaki na mokili ya kokonza mboka na biso. Ngayi na se ya motema na ngai namiyebaka ete mayele na ngai ekokaki kosunga mboka mokolo moko boye, kasi lokola nazalaki na ngenge ya ba sciences, eleko wana nazalaki kokanisa ete lisungi na ngai na tina ya mboka ekoyela kaka na nzela ya mosala na ngai ya bolukiluki pe bokeli biloko oyo ekoki kotombola mboka. Ewumelaki te, na kati ya ba mibu ‘80, sima ya ba experiences na ngai ya ebandeli na mosala ya ingenieur na kati ya bakompani minene ya France, lokola oyo babengi « plafond de verre » ekomaki kopusana, nayokaki posa ya kobanda komilengele pona kozonga na mboka pe ya kolengela projet na ngai na pona kotambwisa mboka soki epesameli ngai ya kozala na motu ya mboka. Kaka na eleko wana, likanisi mosusu eyelaki ngai na motu, oyo ya kokela masini moko esalelaka mayele ya batu pona kosala na pete mosala moko oyo batu basalaka na kokoso. Wuta eleko wana, nayebaki ete na kati na ngai nazalaki molukiluki, nayebaki ete soki nakosalela mboka, ekozala kaka na nzela wana, yango etindaki ngai natia makanisi ya politiki pembeni pona mua tango molayi. Na maye matali politiki, nazalaki komimona kaka lokola mosungi ya president moko songolo na maye asengeli kosala, namonaki ete po nakoma na ebonga ya president, ezalaki kaka soki bayi mboka basengi ngai kasi na likanisi na ngai moko nazalaki komimona candidat te.
Sima ya bozui likanisi wana, namipesaki na mosala ya bolukiluki pona kokela masini wana elongo na misala na ngai ya ingenieur na kati ya bakompani songolo, nakobaki na mosala yango kino suka ya mobu 1989 eleko nasilisaki masini wana, yango nde ezalaki ebandeli ya biye nionso nakelaki na nzela ya bolukiluki, yango nde epesaki ngai makoki ya kosala sima ya mibu 19 societe na ngai KS LUDOTIQUE oyo ezali lelo ya kokangama na mua tango pona bozangi misolo ya kotambwisa yango, oyo ekopesa ngayi makoki ya komibimisa na misu ya mokili mobimba pe koyebana na nzela ya biye nionso oyo nakelaki mibu miyike mokoka. Na tango oyo nionso nazalaki kolekisa na bolukiluki, na kati ya motema na ngai nazalaki koyoka neti mosala oyo batu bazalaki kolakela ngai na motu ya mboka ekoki kokokisama soki nayebani mokili mobimba na nzela ya ba inventions na ngayi, elingi koloba ete soki bayi mboka basepeli na boyebani na ngai, bakolinga nakoma mokonzi na bango. Yango wana tango namonaka batu lokola ba Sarkozy, Hollande to pe Markel oyo bazali batu ya generation na ngayi, nayokaka lokola nakokaki kozala n’esika na bango, yango wana pe nasutukelaka bango te. Kasi oyo nazalaki kokanisa te ekokoma ekomi lelo yambo ya boyebani na ngai, po lelo nazali na revelation ya kopesa bino oyo kosala ete bayi mboka bayeba kombo na ngai. Tango revelation eye eyelaki ngai, namonaki yango lokola ebandeli ya mission na ngai awa na mokili ya se na tina ya mboka too pe ebandeli ya eyano na maye nazalaki kokanisa tango inso. Ndenge biso nionso toyebi, mboka na biso ezali na likama ya occupation, lokola bolingo ya mboka etindaka ngai nasosola pona koluka nzela ya kobimisa mboka na biso na likama ena, pe koyeba nini tokosala sima ya bosikoli pona likama ya lolenge wana ekomela biso lisusu te, eyano eyelaki ngayi na mbalakaka, oyo ezali kotinda ngayi nakomela bino mokanda oyo.
Biso nionso toyebi ete wuta mboka na biso ezua lipanda, batu nionso oyo baleka na motu ya mboka bazalaki batu oyo bapaya batielaki biso pona kosalela ba interets ya ba mboka mipaya ndenge bango moko baloba yango na kati ya « charte ya impérialisme », esalemaka ndenge wana na mboka na biso pe na bamboka biyike ya Afrika. Lisitwale eteyaka biso ete Etat Indépendant du Congo ebandaki na lokuta ya Roi Léopold II liboso ya ba chefs coutumiers na ndenge abotolaki bokonzi na bango na loma. Na koyoka makanisi ya Muana Mboka BOKOMBA Kassa-Kassa na maye matali bozongisi ya kibokonzi na maboko ya ba chefs coutumiers, na mbalakaka bongo na ngayi efungwamaki pe nazuaki eyano na bososoli na ngai na maye oyo nazalaki koluka, nakomaki na kondima ete bolongoli na biso na buwumbu ya bapaya ekolekela na nzela ya « recours à l’authenticité », ete soki tozali kaka kokoba kolanda nzela oyo banoko batikelaki biso, tokokoka kokangwama na bowumbu te. Toyebaka ete mutu a manipilaka kaka oyo ye ayebi malamu, lokola bapaya bayebi bokoko na biso malamu te, bakokoka komanipile yango te, elingi koloba bakokoka komanipile biso te ndenge bazali kosala lelo. Kotala na sima nde ekopesa biso makoki ya kokende liboso, yango wana naye kopesa bino nzela oyo namoni ete tosengeli kolanda pona kobima na bowumbu ya bapaya.
Likanisi eyelaki ngai ezali ete pona bokambi ya mboka, collège ya ba chefs coutumiers ezua esika ya institution presidentielle ndenge toyebeli yango lelo na motu ya mboka. Pona kosala liste ya ba chefs coutumiers nionso ya Congo, tokotalela ba archives ya ba belges na maye matali eleko ya Etat Indépendant du Congo to pe ya Congo Belge. Ndenge nini college wana ekosalema ? Elingi koloba te ke ba chefs coutumiers bakoya bango nionso kovanda na Kinshasa pona kokota na collège wana, ba chefs coutumiers basengeli kovanda na ba chefferies na bango pembeni ya peuple na bango pona kosala misala na bango bamesana pe basengeli kosala, oyo ya koyangela peuple na bango pe ya kobongisa bobendani nionso ekoki kobima na kati na bango. Bokambi ya mboka esengeli na batu ya mayele pe ya bwania oyo bakoki kososola ndenge ya kokumba maye matali ntombwa, bokengi pe bosomi ya mboka, yango wana moko na moko ya ba chefs coutumiers bakopona na kati ya peuple na bango muana mboka moko ya mayele (mobali too muasi) oyo azali na ba capacites ya kokamba mboka pona kotinda ye na kati ya college wana po azala ntoma na ye. Boponi ya mutu wana ekosalema na ye moko chef coutumier elongo na batu ya bwania oyo bazingaka ye too pe ba chefs des villages ya chefferie na ye. Mutu oyo bakopona, kobakisa na ba competences na ye, esengeli azala muana mboka ya solo oyo abotami na tata pe mama oyo bazali bana mboka ya makila ndenge mosala ya president ekosenga. College ya ba chefs coutumiers ekozala lisanga oyo ekozala likolo ya mangomba ya politiki, ekosangisa ba ntoma ya ba tribus nionso ya mboka, yango nde ekobimisa mutu oyo akokamba mboka na lisungi ya ba ntoma nionso ya college. Pona kopona mutu oyo akozala na motu ya mboka, ba ntoma nionso ya ba chefs coutumiers bakosangana na bokutu esika mutu na mutu akomiyambola liboso ya ba membres nionso ya college, esika pe akosembola mabongisi ma ye na tina ya kokumbela mboka, na sima na yango maponami makosalema oyo ekobimisa mutu oyo akosimba ngwende ya bokonzi ya mboka na ntaka oyo ekopesamela ye na kati ya mobeko likonzi. Sima ya boponi Mokonzi ya mboka pe bobimisi ye na miso ya bayi mboka, ye nde akopona mokambi ya mbulamatari oyo akobimela na lisanga ya baye bakolonga na maponami ya bayi politiki oyo babengi « élections législatives », na sima na yango akopona elongo na premier ministre ba ministes nionso oyo bakokota na gouvernement. Na organisation oyo ya sika, bokambi ya mbulamatari ekozala mosala moko oyo ekozala likolo ya misala nionso moyi politiki akoki kosala na maye matali botambwisi ya mboka, elingi koloba maye matali ntombwa ya mboka. Pona kokoma premier ministre, esengeli te kozala na tata pe mama ozo bazali bana mboka ya makila, kaka nationalité congolaise nde esengeli na yango. Botala na se awa ba fonctions regaliennes oyo college ya ba chefs coutumiers na bokambemi ya Mokonzi ya mboka esengeli kosala pona kobatela kimia pe bosomi ya mboka :
- kosalela maye matali securite pe defense ya mboka. Mokonzi ya mboka azali mokonzi ya mapinga pe ya ba services nionso oyo esalaka pona bokengi ya mboka. Kokota na mapinga pe ba services ya secutirte ekozala yakofungwama kaka na bana mboka ya makila, ba chefs coutumiers nionso bakosengela kopesa motango ya batu oyo ekokatama na kati ya mobeko mokonzi pona kokota na mapinga ya mboka, yango nde ekosala ete mapinga mazala kaka ya batu ya ekolo moko songolo to mpakala te, kasi na bana mboka nionso. Bilenge nionso oyo bakolinga kokota na mapinga bakomiyambola pene ya chef coutumier na bango oyo okoyeba kopona oyo akotinda na kati ya mapinga na bokokisi ya quota na ye. Mokonzi ya mboka azali wana pona bozalisi pe bobateli ya bomoko ya mboka.
- kosalela maye matali bolengeli ya ba relations ya malamu na ba mboka mipaya na kotala interet superieur ya mboka pe ya peuple congolais. Mokonzi ya mboka akokumba maye matali diplomatie esika akopona mokambi na yango ministre ya mambi ma bapaya elongo na ba ntoma na ye liboso ya bakambi ya ba mboka mipaya, na tango wana gouvernement ekotikala na responsabilite na maye matali cooperation na gouvernements ya ba mboka mipaya. Ministre ya mambi ma bapaya na ba ntoma bakoki kobimela na college présidentiel too pe libanda.
- kosalela maye matali misolo ya mboka na nzela ya monnaie, Banque Nationale pe misala ya bokongoli mpaku pe bokaboli yango na ba services nionso ya boyangeli mboka, bakosala yango elongo na ministere ya misolo oyo ezali na role ya kolengela budget na tina ya kosunga misala ya botomboli mboka.
- kosalela maye matali gestion ya patrimoine ya mboka oyo na kati na yango tokotanga mayi, mabele pe makele na se ya mabele. Ezali mosala ya Mokonzi ya mboka, oyo azali ntoma ya yambo ya ba chefs coutumiers, ya ko negocier pe ko signer ba contrats nionso oyo etali exploitation ya nkita ya mabele na likolo pe ya se, oyo mbulamatari akolandela sima. Na niveau ya chefferie, chef coutumier azali mokambi ya maye matali gestion ya mabele esika makanda nionso oyo ezali na se ya bokonzi na ye ekobilaka, akoyangela maye matali botongi bandaku, bilanga, bokila pe bolobi mbisi, azali wana pona pe pona kokata bobendani nionso oyo ekoki kobima na kati ya bango,
- kosalela maye matali boyangeli ya population congolaise na maye matali recensement pe boyangeli ya ba donnees statistiques, kosalela maye matali mabongisi ya maponami nionso oyo etali mambi ma politiki ya mboka. Na maye matali identification ya batu, esengeli toyeba ko securiser ba identite na biso pona eyibamaka lisusu te, na ko enregistraka na mopanzi ya ba informations oyo basengaka o momesano ba kombo ya ba villages pe ba secteurs esika batu bawuta elongo na kombo ya makanda mibale oyo mutu na mutu azali ko appartenir na matalisi ya bokoko na biso ba Bantu, elingi koloba kanda ya mama pe ya tata. Na ko suggerer pe ete bakombo wana ya ba makanda na biso ekota na identite na biso na sima ya ba nom na post-nom, ndakisa ngai moko kombo na ngayi ekokoma KUETE Nza-Yazola’Mo Muana Kingoyi Wa Kindamba, epayi wapi Kingoyi ezali kolakisa kombo ya kanda ya tata na ngai, ebongo Kindamba nde kombo ya kanda ya mama, oyo ezali pe kanda na ngayi na bokoko na biso Bakongo oyo tolandaka matriarcat, ebongo yo, bakobenga yo nani ? Po na bayi mboka oyo bazua nationalité, soki bazali na ba systemes claniques lokola biso te, tokopona mention moko pona kozua esika ya ba kombo ya makanda. Bondimi ya bobengami ya sika ekopesa biso makoki ya koyebana o kati ya biso na biso, ya koyeba genealogie ya mutu nionso pe ya koyeba nani azali mowuta, yango ekopesa biso makoki ya koyeba nani azali moyibi ya identite, nani azali infiltre. Soki tembe ezali, chef coutumier akozala wana pona kokata likambo, soki te tokoleka na nzela ya test ADN. Codage pe numerisation ya ba donnees nionso ya ba identites ekopesa biso makoki ya kopesa moyi mboka nionso « numero d’identification nationale » oyo ekopesa biso makoki na lisungi ya informatique ya kobimisa na mbala moko « arbre genealogique » ya citoyen congolais nionso pe ya kotalisa nationalite pe ba origines na ye, yango nde ekobimisa biso na motambu ya ba nationalites douteuses.
Soki totie pembeni misala oyo esengeli na ye lokola « institution presidentielle », collège ya ba chefs coutumiers ekozua esika ya senat na misala nionso ezalaki kosala, yango nde ekobimisa biso pona libela na systeme oyo ba noko batikela biso pona totikala bawumbu na bango oyo ba controlaka na mosika. College ya ba chefs coutumiers na mosala na yango ya bokambi mboka ekozala kaka moko ya ba institutions ya Leta oyo ba chefs coutumiers bakozala na esika na nzela ya ba ntoma na bango, kasi bango moko bakozala na ndingisa ya koyingela na institution ata moko te ndakisa assemblee nationale to pe ba assemblees provinciales, ndenge moko na maye matali gouvernement ezala na niveau ya mboka, ya province to pe ya territoire. Ba chefs coutumiers basengeli kovanda na ba chefferies na bango epayi wapi bakoyangela ba populations na bango na misala na bango nionso oyo coutume epesa bango na lisungi ya gouvernement local na bango oyo ekozala prolongement ya presidence na niveau ya chefferie, oyo esika tokoki pe kokuta ba chefs des villages. Soki totiki presidence na collège ya ba chefs coutumiers, mosala ya mbulamatari ekozala ya kosala misala nionso oyo amesana kosala na tina ya ntombwa ya mboka, yango wana ezali na tina te tokundola yango awa. Kasi nakobeta sete na maye matali mambi ma biteyelo oyo ekoyikisa motango ya batu ya mayele oyo bakosala misala ya ndenge na ndenge, oyo basengeli kozala bayike pe ya qualité pona bakoma batambwisi ya ntombwa ya mboka. Toyebi ete mboka na biso etonda na nkita, ezala na se to pe likolo ya mabele, kasi toyebi pe ete tokokaki kozala na kimvuama mbala miyike koleka soki tozalaki na mayele ya kobongola ba matieres premieres na biso pona kokomisa yango ba produits finis oyo eyikisaka bomengo ya mboka. Yango wana, mosala ya gouvernement esengeli kotalela yambo ya yambo maye matali kobakisa mayele ya bayi mboka, oyo ezalaka bomengo eleki nionso na tina ya kotombola mboka, yango nde epesaka mpifo ya kokela ba mbuma ya makanisi pe ya kobalola ba matieres premières pona kokomisa yango nkita ya koteka na libanda ya mboka. Mbulamatari asengeli kotalela makasi mambi ma matali education, santé, recherche, biteyelo ya misala ya maboko, sport pe culture. Soki toleki wana, mbulamatari asengeli kosala nionso po oyo babengi ressource humaine ekoka kobika pe kosala na environnement too pe na climat moko ya malonga oyo elongobani pona kopesa ba mbuma ya kitoko koleka. Na kobakisa, ezali na tina ya ko beta sete na misala oyo tokolobela awa na se oyo esengeli kokota na kati ya mission ya mbulamatari :
- mbulamatari esengeli kosala angele na maye matali bokengi bua ressource humaine na mipanzi nionso ya bomoyi na yango, yango ekolekela na nzela ya bozongisi etat de droit oyo esekamaka likolo ya mibeko oyo eyebani na mutu nionso na kati ya systeme judiciaire ya malonga oyo ezalaka na mpifo ya ko kokengela makoki ma citoyen too pe ma mutu na tina ya kotelemisa cadre oyo ekosala ete mutu nionso akoka kobika too pe kosala na ba conditions elongobani na kati ya mboka na ye. Ekozala bongo soki police ya mboka eyebi mosala na ye malamu pe eyebi kotosa mibeko ya Leta pona kosunga justice na misala ya koluka bosolo pona kokata makambo na bosembo, police oyo eyebi kokengela batu na biloko na bango na etando nionso ya mboka, yango ekoleka pe na nzela ya bolengeli bwa systeme ya protection sociale pona kotia bokengi na misala pe bokolongonu bwa nzoto ya muana nionso ya mboka oyo ekotombola mabota nionso engembene na politiki ya demographie ya mboka.
- mbulamatari esengeli kolengela mambi ba bopanzi sango na polele pe kosalela politiki oyo eko favoriser bokeli pe botambwisi ya presse ya mitindo nionso, oyo ekozala na bosomi ya kopanza sango pe ko eduquer bayi mboka. Soki tolongoli ba moyens ya communication oyo eyebana, mbulamatari asengeli kosala nionso pona ko favoriser ntombwa ya ba technologies ya sika ya bopanzi sango pe ya communication na etando mobimba ya mboka na tina ya kozua muana mboka nionso esika ye avandi. Mbulamatari esengeli kotia makoki oyo ekosala ete muana mboka nionso akoka kozua education civique oyo ekolakisa ye ba droits na ba devoirs na ye liboso ya Leta, oyo ekolakisa ye mibeko asengeli kotosa na relation na ye na batu misusu ontei ya societe too pe na mosala, oyo ekokomisa ye citoyen responsable, na tina na yango mbulamatari esengeli pe kotia makoki na maye matali documentation.
- mbulamatari esengeli kosala nionso pona administration etambola malamu, na tina wana akotia makoki pona ezala kokumbana na batu bayebi mosala, pona kolongola ba antivaleurs nionso oyo ekoki kobebisa lokumu na yango, yango ekoleka na nzela ya bolengeli ya ba structures elongobani pona kopesa mateya ya malonga na basali ba ye, surtout na ba fonctionnaires ya likolo oyo basengeli ko kumba misala ya ndenge na ndenge ya Leta.
- Yambo te ressource humaine wana ekoma ya mingi pe ya malonga na ba domaines nionso ememaka ntombwa, mbulamatari asengheli kobanda na kosalela ressource humaine ezali deja disponible na mokolo ya lelo na kati ya mboka na biso, esika wapi tokomona ba artistes nionso lokola bayi miziki. Soki tolongoli nkita nionso etondisama na mboka na biso, miziki ezali bomengo ezanga motango oyo Nzambe apesa mboka na biso, miziki na biso oyo ekenda sango pe etombola lukumu ya mboka tii na ndenge bakoma kobenga yango « musique congolaise/zaïroise » lokola ndenge babengaka ba miziki misusu oyo toyebi, kasi mboka na biso ezuaka mbano ya boyebami wana te pona ko conquerir part na ye na marché international oyo elongobani pona miziki na biso, nionso wana kaka pona tozangi organisation pe promotion oyo elongobani. Ngonga ebelemi ya kotia exploitation ya miziki na biso na alima pona ebota mbuma ya malonga oyo ekokolisa nkita ya mboka pe ekosala ete ba artistes na biso bakoka kobika na ndenge elongobani. Soki totali bofungwami ya Chine na molongo elongo ya boyei ya ba marchés ya sika na nzela ya ba pays emergents, nionso wana ezali ba marchés ya minene oyo ezozela kaka miziki na biso ezua esika na kati na yango. Yango wana, ekozala malamu soki mbulamatari na biso ebandi politiki ya bitumba na maye matali marketing na kati ya mikili nionso ya molongo oyo akoki kosekamisa likolo ya ba diaspora na ye, yango nde ekosala ete miziki na biso ezala produit d’exportation oyo ekoki kobota ba devises ndenge ba matieres premieres nionso esalaka. Epayi ya ba artistes musiciens, na kopesa bango toli, batika komekola systeme ya ba mindele oyo ya nakomikotisaka mingi na ba carrières solos, po miziki na biso ezuaki ba meilleurs resultats na yango na nzela ya ba ensembles, bisika bokoko na biso ezalaki komonisama na kati ya ba harmonies vocales. Ekozala malamu soki ba hommes d’affaires bazui responsabilité ya ko constituer ba groupes autour ya quelques têtes d’affiches ndenge Verckys Kiamuangana Mateta asalaka na epoque na ye na ecurie VeVe too pe kotia misolo na ba infrastructures oyo ekopesa bibundeli ya malonga na balanga nzembo na biso pona bakoka kosala na ndenge elongobani, ekotikala na biso batu ya recherche tokela système ya diffusion pe ya distribution ya sika oyo ekopekisa piraterie.
Ndenge nalobaki likolo, premier ministre na ba ministres na ye bakowuta na lisanga ya mangomba oyo ezali na majorité na kati ya parlement pona kokokisa politiki oyo baponelaki bango. Na maye matali mangomba ya politiki, esengeli yango etika kozala ba sectes ekambemi na gourou moko songolo oyo ako imposer makanisi na ye epayi ya ba membres nionso oyo mingi bazalaka kaka ya ekolo moko. Esengeli ba partis politiques ekoma masanga ya bososoli oyo ekosangisa batu ya ndenge na ndenge oyo bakozala ba ntoma ya bikolo nionso ya mboka pona kosalela likanisi moko eyebani polele na tina ya botomboli mboka, oyo ekozala na ba sections na ba provinces nionso ya mboka. Pona kozala enregistré, mobeko mokonzi ekosenga na parti politique nionso ekokisa motango moko songolo ya ba membres.
Ezalaki wana, bandeko na ngai bana mboka, oyo nazalaki n’ango pona kotalisa bino. Nazali na tembe te ete projet ya ndenge wana ekosepelisa banguna na biso te, oyo bazali kosala nionso pona kobotola biso mboka, bakolinga ata moke te mboka na biso ekangwana na influence na bango, bakoluka ba nzela nionso pona kokweyisa projet oyo na lisungi ya ba collabos na bango, bana mboka oyo batiaka interet na bango likolo ya bolingo ya mboka. Nakolikia ete batu ya binzambi-nzambi bakomona mabe te na mabongisi wana pe bakoya kotiela yango tembe te, bango batu balobaka ete ba coutumes ezali misala ya Satana, bayebaka ete soki bokonzi ewutaka na Nzambe, balobelaka nde bokonzi ya ba rois na chefs coutumiers, ezali oyo ya baye bazuaka yango na kimoyibi too na loma te. Soki toponi nzela wana, presidence na biso ekosila kozala kikambo ya individu moko pona kokoma oyo ya batu bayike oyo bakozala bantoma ya bikolo nionso ya mboka, ekozala lokola na Vatican oyo esangisaka ba cardinaux ya bamboka nionso na bokambemi ya Papa oyo mokristu nionso akotosa lokola mokonzi na ye, ndenge moko pe na president na biso oyo akobima na bosangani ya bantoma nionso ya bikolo nionso ya mboka. President akozala lisusu na mpifo ya kozala monarque absolu oyo aniokolaka peuple na ye pona bovuami na ye moko te, akokoma mosali ya peuple pona bokengi bwa ye pe lobiko na ye na ekenge ya ba membres misusu ya college presidentiel. Soki toponi organisation wana, ba coups d’etat ekozala lisusu te, ba dictatures ya seko esili, ba oligarchies tribales esili, mibembo na Washington, Londres too pe Paris pona kokende kozua lupemba ya ba « décideurs » esili, ba marionnettes na motu ya mboka pona kosalela bapaya ekosila po bakokoka ko corrompre college presidentiel mobimba te na ndenge president azali kaka mosali moko na kati na bango. Makambo ya kaniaka too pe enrichissement personnel ya president esili, po ezali n’ango pete ya ko corrompre mutu moko, kasi soki etali ba membres nionso ya collège ekokoma pasi mingi, atako yango kosalami, ekozala kaka malamu po ekovuamisa mboka mobimba. Emprise oyo ba puissances ya bapaya bamesanaka kozala n’ango likolo ya mutu moko kino lelo ekolemba soki bokonzi esimbami na batu ebele. Bokonzi oyo esimbami na batu ebele eleki makasi pe ekokomisa mboka na biso makasi koleka liboso ya bamboka mipaya, po ndenge balobaka : « l’union fait la force ». Libaku epesameli biso ya kokela systeme na biso ya bokambeli mboka, oyo ebimeli na bokoko na biso, oyo elongobani na bizaleli biso, oyo ekobimisa biso pona libela na eleko ya colonisation pona bolamu ya mboka na biso pe pona kopesa ndakisa na bikolo nionso ya Afrika ya Bayindu, yango ekopesa biso makoki ya kozongisa ba structures na biso oyo colonisation eyaki kopanza, yango nde ekopesa biso nguya ya kokamata destinée na biso na maboko pe kopona biso moko ba partenaires oyo tokoki kosala na bango elongo pona benefice ya mboka. Soki biso nionso toyokani pona kolanda nzela wana, kobengana bapaya oyo bakotela biso ekokoma likambo ya pete, po ekobimisa bango na mpuasa, lokola bakozala na kimia te na kati ya système wana, bango moko bakomitia pembeni ndenge mafuta ekabuanaka na mayi. Soki biso ba congolais tondimi pe tokomi kosembola ba identité na biso ya sika, ba imposteurs nionso bakokoma hors jeu, na ba collabos oyo ya moitié-moitié bakoyebana. Na kozela nionso wana esalema, esengeli tobima mbangu na processus electoral ya lokuta oyo elengelami na banguna na biso pona kotiela biso marionnette mosusu na motu ya mboka oyo akosalela ba intérêts ya bapaya, tokangama kaka na objectif moko kaka oyo ezali na tina ya bosikoli mboka, ezali bolengeli ya constitution ya sika elongo na referendum oyo ekolanda, yango nde ekopesa biso ndingisa ya kobanda mosala ya refondation proprement dite ya mboka na biso pona bolamu na biso nionso. Nakotala ba competences oyo esengeli pona fonction ya Mokonzi ya mboka ndenge tolobeli yango likolo, mutu oyo tokolinga asengeli kozala mayele pe koyeba malamu maye matali defense pe securite ya mboka, akozala pe mutu oyo ayebi ndenge mokili etambolaka. Na mokolo ya lelo, pona kobanda systeme na biso ya sika, kombo moko kaka eyelaka ngai na motu, mutu’ango akokisi penza maye tolobeli likolo, azali mutu oyo akoki kopesa biso kimia, azali patriote monene, azali resistant monene, bino nionso boyebi nani nazali kolobela, yango wana nakopesa kombo na ye te, motuna ezali kaka se moko oyo osengeli koyanola, nani oyo okoki kondimela pona okoka kobika, kosala pe kolala na bokengi pe na kimia na kati ya mboka na yo, yo moko elongo na bana pe bandeko na yo.
Na maye matali kombo ya mboka na biso, lokola kombo ya Congo ememelaka biso kaka makambo ya mabe kobanda colonisation ya ba mputulukezo na traite négrière na bango, Tippo Tip na commerce na ye ya bawumbu, Léopold II na genocide na ye elongo na bokati batu maboko, mobembo ya Tintin epayi ya bayindo na Congo, pona kosukisa lelo na occupation ya ba Rwandais oyo ememela biso genocide na ba viols too pe oyo ewuti koleka na Brazzaville, kozongela kombo ya biso ya Zaïre ekozala eloko ya malamu penza soki biso nionso tondimi yango, poo kombo eye ezali kolakisa maye nionso epesaki lokumu na mboka na biso, na kotala president na biso oyo azalaki charismatique na kobangisa bakonzi nionso ya Afrika pe ya mokili, tokoki pe kolobela discours na ye na ONU, ba Leopards na biso oyo bamemaki football na biso likolo na Afrika, boxe na biso oyo epesaki biso ba champions bebo, combat du siecle ya Ali na Foreman, basket-ball na biso oyo ebimisa batu lokola Mutombo, Voix du Zaïre tam-tam monene ya Afrika pona kopanza misiki na biso oyo elingamaki bipayi binso na kati ya Afrika too pe mosika, enseignement na biso ya malonga oyo ezalaki kozua mbano na ba concours internationaux biyike, UNAZA na ba bourses na biso pona kopesa bana nionso ya Zaïre makoki ya kokota na universite oyo etangisaki bilenge biyike pe ekendaki sango na Afrka, oyo pe eyambabi bayekoli bayike ya Afrika ya kati, Air Zaïre, CMZ na ba realisations nionso ya Mobutu oyo tokokuta na kati na yango eloko ya motuya oyo tobengi bomoko ya bana mboka. Na ngambo mosusu, kombo ya Zaïre ezali na bosangisi koleka oyo ya Congo oyo ewuti na Royaume Kongo oyo etandamaki na bamboka misatu oyo ezali kobengama lelo na bakombo ya Angola, Congo Brazza na RD Congo. Na koleka, toyeba ete Angola oyo ezali mboka ya siki-siki ya Yaya Kimpa Vita, ezalaki esika ya bokonzi ya Royaume Kongo. Lolenge moko, na maye matali bokati ya ba provinces ya sika, mokolo tokosala yango ekosenga ba provinces yango ezala homogenes na maye matali ba ethnies, pona koboya kokabola ba ethnies na ba provinces biyike, yango ezali te pona kofula tribalisme, kasi ezali pona kobatela ba famiye nionso na bomoko, yango nde ekosala ete bakoka kovanda na kimia pe kosala malamu na motema moko pona kotombwisa province na bango. Batu bakobika pe bakosala malamu koleka soki bazali bango na bango ke soki bazali ya kosangana na batu oyo bakeseni bizaleli, yango pe eko kotisa momekano na kati ya ba provinces, province na province ekoluka kosala koleka moninga, yango nde ekosala ete mboka mobimba ebanda kotombwama na ndenge elongobani na kati ya etando mobimba ya mboka, yango nde ekozala malamu pona mboka po ntombwa ya Congo ekoki kosuka kaka na Kinshasa too na Bas Kongo kaka te esika batu nionso bayaka kotondana. Tosengeli kotombola Congo mobimba na maye matali tourisme, agriculture, industrie pe maye nionso tokoki kosala pona kotombola nkita ya mboka. Na ngambo mosusu, Zaïre ya sika ekoki kozala noyau oyo ekoki koyamba ba tribus ya sika ya bassin ya ebale ya Zaïre oyo kala tozalaki na bango esika moko yambo te colonisation eya kokabola biso, yango wana kombo ya sika ya mboka wana ekoki kozala « Chefferies Unies du Zaïre » too pe « Union Chefferienne du Zaïre ». Passeport ya sika na kombo ya Zaïre ezali moyen ya kosilisa misala ya ba occupants oyo basalaka ba passeports na biso na kimayuya pe ya kopekisa bana na bango oyo bayibaki pe bamesana koyiba bakombo na biso pona kotambola na yango na mikili basila mayele pe bakoka komibenga ba zaïrois te ndenge bamibengaka ba congolais.
Na ngambo na ngayi, kobimisa kombo na ngai na mpuasa na nzela ya politiki ezali oyo nakanaki te, kasi nazalaki koyoka lokola nazalaki motindami pona kopesa sango oyo ya motuya pona mboka, oyo soki nasalaki yango te elingaki kosala ngai somo na motema na liboso ya peuple congolais na mikolo nionso etikali na kati ya bomoyi na ngai po elingaki koloba « non assistance à peuple en danger ». Lokola nandimaki mission yango, nazalaki komona lisusu ba risques te, kaka eloko moko ezalaki ko compter, intérêt supérieur ya mboka, nazalaki koyoka na kati na ngayi lokola nguya moko oyo nakoki ko lobela te, nazalaki koyoka neti eloko moko ekokaki koyela ngai te. Na kati na ngai nazalaki komona ete nazalaki na makoki ya kokima destin na ngai te, kaka eloko moko nasengelaki n’ango, ya koluka mokolo oyo elongobani po na kobimisa message wana. Na tango nionso nazalaki kozela mokolo yango, motema na ngai ezalaki likolo na ndenge nakokaki kopesa eyano te tango nazalaki koyoka bana mboka bazali komituna ndenge ya kobima na likama ya occupation oyo tozalaki na yango too pe ndenge tokosala soki tosilisi kosikola mboka, ngayi nazalaki na biyano nionso kasi nakokaki koloba nayinu te. Lelo namoni neti mokolo’ango ekoki, yango wana lelo ezali soulagement pona ngayi kosala publication oyo lelo lokola ba occupants bakomi kosala nionso pona kolendisa bonganzami na bango na mboka biso pe bakomi kotia molende pona kosilisa misala mia bango ya kobotola biso mboka pona libela. Na ebandeli nazalaki kokanisa ete ezalaki n’ango possibilité moko na kati ba solutions biyike, kasi bazalaki komonisa ngai mokolo na mokolo ete tozalaki na choix mosusu te, nzela ezali se moko oyo tosengeli kolanda, soki te tokokoba kozala bawumbu ya bapaya oyo ekomema biso na bopanzani ya mboka biteni na biteni. Bondimela ngai, bandeko na ngai bayi mboka, kopona système wana ezali nzela kaka moko oyo ekomema biso na stabilité, kimia pe bosomi oyo esengeli pona ntombwa ya mboka na ndenge biso moko tokolinga kokumbela yango, engebene na ba valeurs na biso, nakolinga bopesa ngai raison tango nazali na bomoyi na esika ya kozala idole na sima ya kokufa lokola batu mingi oyo tokoma kokumisa oyo bazalaki kobundisa makanisi na bango tango bazalaki na bomoyi.
Epayi ya bino nionso oyo bokotanga mokanda oyo, nasengi bino bolandisa yango na bayebani ba bino po sango etambola malamu pe epanzana epayi ya bayi mboka nionso. Epayi ya ba oyo nionso bamesana kofinga, nasengi bino botika mafinga, nalingi bosalela bongo na bino na ndenge elongobani, botanga mokanda oyo malamu, soki ososoli te tanga lisusu, bososola malamu oyo ekomami na kati, sala comparaison na ba solutions misusu oyo okoki kakanisa, okomona ete systeme wana ezali kopesa biyano ya malonga na mituna na yo nionso koleka ba systemes misusu oyo toyebi. Na ngambo na ngayi, nasilisi mission na ngai oyo bapesaki ngai na tina ya ekolo na ngai, na tikali na dispostion ya mboka soki mission mosusu epesameli ngai sima, pona lelo nazongeli mosala na ngai oyo ekosenga ngai nabimisa na miso ya mokili bambuma ya mosala na ngai ya bolukiluki, oyo pe ezali na tina monene pona mboka na biso. Nakosenga na batu ya mibeko na bayi politiki bakamata projet oyo lokola ya bango, bazua relais pona kokolengela mobeko mokonzi oyo ekobotisa bokonzi bwa sika na mboka na biso, nakosenga surtout na baye bavandaka na Belgique, oyo bazali na possibilté yakokota na ba archives ya mboka na biso pona kosalela yango pona bokongoli ya ba données oyo tosengeli na yango pona kolendisa projet oyo, natie mayele na ngai epayi na bino !
Na kombo pe na bolingo ya mboka.
KUETE NZA-YAZOLA’MO Muana KINGOYI Wa KINDAMBA
Patriote Résistant,
Inventeur de la ludotique.
Lettre écrite en Juin 2013 Dernière mise à jour le 20/12/2015
Article publié en français le 20/12/2015 Traduit en Lingala en Août 2016
Pona kotanga mokanda eye na français, fina awa.
Fina awa pona kotanga Post Scriptum ya mokanda eye.
Fina awa pona ko telecharger pdf too ko imprimer mokanda eye.
SOKI MOKANDA EYE ESEPELISI YO, KOBOSANA TE KOPANZA YANGO EPAYI YA BANINGA NA YO YA FACEBOOK TOO PE KOTINDA YANGO EPAYI YA BAMISUSU !
Bosikoli ya mboka ekolekela pe na nzela ya bokangoli pe bosukoli ya makanisi na biso, nakosenga bino botanga pe mikanda eye :
EGLISES DE REVEIL, OKIPASIO MOSUSU OYO TOSENGELI KOMIKANGOLA.
EGLISES DE REVEIL NA MAYE MATALI NZAMBE, TALA BOSOLO EKOKANGOLA BISO.